Bongisa ba sango na Yo

Sekiso oyo ekolakisa yo ndenge nini okoki kobongama pona esengi na yo. Ekopesa yo ba idées pona ba elembo ya ntina oyo ekosunga lisolo na yo. Ekolakisa yo ndenge nini ko kipa pe ko partager ba sango ya ntina.

Yekola mingi ya oyo etali ba elembo to bilembo pe ba mikanda oyo eko supporter lisolo na yo na Sekiso 5: Bongama pona Boyoki na Yo.

Koma lisolo na yo

Ekosunga yo mingi kokoma lisolo ya oyo ekomelaki yo, pe pona nini oza na bomo ya kozonga mboka na yo. Beta lisolo na yo, ebandeli ti na suka, na ndenge ya chronologique to pe dans l’ordre, pe bakisa ba mokolo oyo nionso oyebi. Ekoki kosunga yo na ko identifier ba elembo to bilembo pona esengi na yo. Zala bokebi, tia ba détails nionso, kobosana ata eloko moko te.

Sangisa ba elembo na to

Esengeli na yo kosangisa ba elembo to bilembo oyo ekosunga esengi na yo. Ba elembo nde esalaka ete IRB-RPD endima oyo ekomeli yo, pe eko comprendre pona nini okoki kozonga na mboka na yo te.

Ba ndakisa ya ba elembo oyo okoki kosangisa:

  • Ba mikanda oyo eko prouver bowulani na yo
  • Ba elembo oyo ekolakisa bosolo ya lisolo na yo
  • Ba mikanda to ba articles ya ba journaux oyo elakisi ba réalités ya mboka na yo pe pona nini okoki kofanda na kimia kuna te (pona nini vie na yo eza nadanger)
  • Ba lettres to ba mikanda légaux (lisakoli sous serment) ya batu oyo bakoki ko témoigner na bosolo ya lisolo na yo.
  • Ba rapports oyo elakisi ete osengaki lisungi ya ba agences ya mbulamatali na mboka na yo.

Meka kozua nionso oyo oza nango besoin na mboka na yo na tango moke. Kosenga ba rapports ya police to pe ya hôpital ekoki kozua yo tango mingi. Soki okoki kozua eloko te, bomba ba elembo ya nionso oyo omekaki.

Sosola ba mikanda pe ba elembo

Eza na tina kotanga na bokebi nionso bilembo na yo pe ba mikanda pona kolula ba erreurs. Tango mosusu mutu mosusu akoki kokomela yo mokanda ponako soutenir yo mais ekokani te na ba sango ya Formulaire BOC ya yo. Esengeli na yo tango mosusu kosolola na kolo ya mokanda pona ko expliquer ba mobúlú tango ya boyoki na yo. Solola na Ntoma (représentant légal) na yo pona oyo esengeli kosala. Eza na tina pona IRB-RPD andima biteni nionso ya lisolo na yo.

Bongolisa ba mikanda nionso

Esengeli na yo kobongolisa ba elembo nionso na Anglais to na Français. Esengeli na yo ko sala ango noki po ezuaka temps molayi. Solola na Ntoma (représentant légal) na yo pona koyeba ba mikanda esengeli bobongolisa.

Bomba copie moko ya ba mikanda na yo nionso

Bomba ba photocopies ya moko moko ya ba mikanda na yo:

  • Formulaire BC pe ba formulaire mosusu ya imigrasyon
  • Lisolo na yo
  • Ba elembo (preuves) nionso, ba esengi, ba lettres oyo yo to Ntoma (représentant légal) na yo bopesaki na IRBCBSA to IRCC
  • Ba lettre, ba mikanda, to ba notifications rendez-vous oyo  IRBCBSA, to IRCC etindaki yo.

Somba classeur pona ko bomba ba mikanda na yo na ndenge ya organisé pe ya sûr. Bomba ba mikanda ango nionso ti mokolo okokoma mwana mboka ya Kanada.

Tia adresse na yo à jour

Batela adresse na yo malamu pona kozangisa te ba sango na oyo etali esengi na yo.