Procédure ya esengi ya ebombamelo (demande ya asile) eza matata. Ekozala malamu ozala na Ntoma pona a guider yo na procédure ya esengi ya ebombamelo. Eza obligation te kozala na Ntoma, mais bakoki kosunga yo mingi na procédure na yo. Ntoma akoki kosunga yo pona ko soumettre to kotinda demande na yo, kobongisa ba elembo (preuves) pe ko soutenir yo mokolo ya boyoki (audience) na yo.
Tango nini na koki kozua Ntoma (représentant légal)?
Meka kozua représentant légal avant obanda demande na yo ya asile. Soki okoki kozua ye avant te, meka koluka représentant légal avant bapesa yo date ya audience na yo. Bongo, yo na représentant légal na yo boko zala na temps ya komibongisa.
Ntoma akoki kosala nini?
- Akoki koyebisa yo soki okoki to te kosala esengi ya ebombamelo, pe soki eza idée ya malamu pona yo.
- Akoki ko expliquer ba termes lokola Convention ya ba Réfugiés na Moto oyo aza na Besoin ya Bobateli pe ba parties nini ya ba termes ango eko s’appliquer na yo.
- Akoki kosunga na koyeba nini okoki kokoma kati ya Formulaire BOC na yo
- Koyebisa yo ba elembo nini esengeli na yo kobongisa
- Ko réviser ba elembo pe kotinda ango na IRB-RPD
- Ko communiquer na IRB-RPD (pe na Ministre soki azali impliqué)
- Kosunga yo na komibongisa pona boyoki na yo pe kosunga yo na ko préparer biyano ya mituna.
- Kosunga yo na boyoki na yo pe kosunga yo na ko présenter demande na yo ya asile na IRB-RPD
- Ko expliquer ekateli IRB-RPD ako pesa yo pe koyebisa yo ba epémelo nini ekolanda to ba options nini oza nango
Nani akoki ko représenter ngai?
Batu oyo bakoki ko représenter yo (kosala makambo pona yo) pendant audience na yo ya demande ya asile:
- Molobeli
- Consultant ya imigrasyon
- Notaire publique (na Québec)
- Parajuriste oyo aza na licence (na Ontario)
Pona Ntoma na yo na bokebi nionso. Est-ce que bako yoka yo? Est-ce que ako zala na temps pona yo? Est-ce que aza akendeke bisika oyo esengeli na bango bakende? Est-ce que aza moto sémbo? Est-ce que ba frais na ye eza ya malamu? Soki oza na doute, tuna ba renseignements epayi ya mosaleli ya agence ya établissement oyo oza na confiance na ye.
Ba Sociétés ya Droit pe ba Organisations Professionnelles
Olingi kozala sûr ete Ntoma na yo aza ko guider yo malamu pe aza kopesa yo ba conseils ya malamu. Vérifiez ete azali membre ya organisation professionnelle na ye.
Voici ba liens ya ba sociétés ya bosémbo ya province na yo:
- Société ya Bosémbo ya Alberta
- Société ya Bosémbo ya British Columbia
- Société ya Bosémbo ya Manitoba
- Société ya Bosémbo ya New Brunswick
- Société ya Bosémbo ya Newfoundland na Labrador
- Société ya Balobeli ya Nova Scotia
- Société ya Bosémbo ya Ontario
- Société ya Bosémbo ya Île ya Prince Edward
- Barreau ya Quebec
- Société ya Bosémbo ya Saskatchewan
Soki ozui consultant ya imigrasyon, s’assurer ete aza membere ya College ya ba Consultants ya Imigrasyon pe ya Bomwana-mboka. Esengeli ba consultants ya imigrasyon bazala certifiés pona kosala mosala na bango devant IRB. Okoki ko vérifier Registre Publique pona ko vérifier statut ya consultant ya imigrasyon.
Soki o’embaucher parajuriste na Ontario, vérifiez dossier na ye na Société ya Bosémbo ya Ontario.
Soki o kamati to pesi mosálá notaire na Québec, okoki ko vérifier libenga ya minkanda na ye na Chambre ya ba notaires ya Québec.
Représentant ya ofele
Oza na bosembo ya kozala na moto oyo oza na confiance na ye (lokola membre ya libota to moninga) pona apesa yo lisungi ya ofele pona esengi na yo ya ebombamelo. Mutu wana abengami “représentant ya ofele”. Mais, ekozala malamu omeka toujours kozua Ntoma.
Ndenge nini nakoki kozua Ntoma?
- Senga ba kombo epayi ya agence ya établissement na yo.
- Solola na ba Ntoma nyonso pona kotala nani o’préférer. Tanga ba avis batu batiki pona bango.
- Soki oza na mbongo te pona mosungi engebena, senge Ntoma ya ofele to ya moins cher, epayi ya Mosongi Engebena to ba cliniques juridiques à but non lucratif.
Mosongi Engebena na ba Cliniques Juridiques
Pona province na yo na liste oyo elandi pona koyeba ba services juridiques nini ya moins cher to ya ofele bazali disponibles.
Sima ya kotinda BOC na yo, contakte Mosongi Engebena ya Alberta (LAA) pona kosenga molobeli moko a représenter yo na boyoki na yo. Tango okosala esengi, LAA akotuna yo mituna na makambo oyo etali situation na yo pe mbongo nini oza nango pona koyeba soki ozali éligible. Bakoki kosenga yo mikanda. Soki bandimi yo, okofuta mbongo epayi ya molobeli na yo, mais ekozala na tarif réduis.
Soki LAA ezwi mokano ya kosunga yo te parce que ozali éligible te na mbongo, to akanisi ete bako boya esengi na yo, okoki kosala appel (kosenga révision). Bakoki kosenga yo o’rembourser nionso to partie ya ba dépenses ya mosongi engebena.
Pona kosala esengi na LAA, benga: 1-866-845-3425
Eza na ba agences na Calgary to na Edmonton oyo bakoki kosunga yo pona ko compléter Formulaire BOC na yo.
Calgary
Luka Mosngi Engebena pona makambo oyo etali Formulaire BOC epayi ya bokambi engebena (Orientation Juridique) ya Calgary.
Bokambi Engebena ya Calgary 100 – 840 – 7th Avenue SW Téléphone: 403-234-9266
Edmonton
Luka mosongi engebena pona makambo oyo etali Formulaire BOC epayi ya Centre Juridique ya Communauté ya Edmonton (ECLC).
Centre Juridique ya Communauté ya Edmonton Telus House, Tour Sud, 2ème Étage 10020 100 Street Téléphone: 780-702-1725
Mosongi Engebena
Contactez Mosungi Engebena BC (LABC) noki pe sala demande ya mosungi engebena.
Mosungi Engebena BC azali na balobeli ya ofele pona:
- Bosengi ya ebombamelo – ebandeli ti suka
- Ba appels ya babombami
- Conseil juridique pe représentation soki bakangi yo
Pona kosala esengi:
Téléphone: 604-601-6076 to 1-888-601-6076 (ya ofele)
Suite 400 – 510 Rue Burrard Vancouver, BC V6C 3A8
Tango oko sala esengi, LABC ako tuna yo mituna pona koyeba soki ozali éligible. Bako tala mbongo nini oza nango pe soki esengi na yo ya ebombamelo eza ya makasi. Bakoki kosenga mikanda.
Soki ozui mosongi engebena, okoki koyebisa bango kombo ya molobeli nini olingi to kosenga bango bapona molobeli pona yo.
Soki oza na mituna to oza na difficulté ya kosala esengi ya mosongi engebena, okoki kosenga lisungi epayi ya Navigateur ya Mosongi Engebena moko. Ba navigateurs ya Mosongi Engebena baza basaleli ya LABC oyo basungaka batu na procédure Mosongi Engebena. Pona ko contakte Navigateur ya Mosongi Engebena moko, benga 1-866-577-2525.
Soki bapimi yo Mosongi Engebena
Soki LABC alobi ete za éligible te pona Mosongi Engebena, okoki kosala appel (kosenga révision). Koma lettre pona ko expliquer pona nini oboyi ekateli na bango, pe tindela bango ango na nzela ya poste email to pe fax noki. Esengeli na yo kotinda lettre 30 jours sima ya mokolo oyo oyambi ekateli négatif ya Mosongi Engebena. Okoki kobakisa mokanda nionso oyo okanisi ekoki kosunga appel na yo.
Soki oza kaka éligible te, agence moko ya établissement ekoki ko référer yo na ba cliniques juridiques to ba ressources mosusu ya communauté na yo.
Ba Cliniques ya ba Conseils Juridiques ya Ofele
Soki okoki kozua aide juridique te, okoki kosala esengi epayi ya ba services oyo:
Clinique Juridique ya Imigrasyon pe ya babombami Téléphone: 778-372-6583 WhatsApp: 778-222-7568 Email: [email protected] 103 – 2610 Victoria Drive Vancouver, BC V5N 4L2
Programme ya ba Conseils Juridiques ya ba Étudiants ya Mobeko ya UBC (LSLAP) Téléphone: 604-822-5791
Soki olingi kosolola 30min na Molobeli moko ya imigrasyon, okoki ko contakte:
Société ya Accès Pro Bono Téléphone: 604-878-7400 Ya-Ofele: 1-877-762-6664
Contactez Mosongi Engebena Manitoba (LAM) noki pe senga lisungi engebena.
Aide Juridique Manitoba Ba sango pona koyeba ndenge nini kosala esengi ya mosongi engebena na nzela ya internet Téléphone: 204-985-8511 Ya-Ofele: 1-866-800-8056
Soki LAM alobi ete ozali éligible te, okoki kosala appel (kosenga révision)
Okoki pe ko contakte Conseil Interreligieux ya Imigrasyon ya Manitoba (Welcome Place) pona kosenga lisungi pona esengi na yo. Bapesaka ba services parajuristes.
Conseil Interreligieux ya Imigrasyon ya Manitoba (Welcome Place) 521 Bannatyne Place Winnipeg, Manitoba Téléphone: 204-977-1000 Benga to kende kuna pona kozua rendez-vous.
Benga to tinda email na Clinique ya babombami ya New Brunswick pona lisungi liboso ya kobanda esengi na yo ya ebombamelo soki okoki. Okoki kozala éligible pona kozua Ntoma.
Clinique Juridique ya New Brunswick 327 Rue St George, Suite 204 Moncton, NB E1C 1W8 Téléphone: 506 204 5781 Email: [email protected] Fax: 506 204 6117
Contakte Mosongi Engebena ya Newfoundland pona koyeba soki ozali éligible pona lisungi ya engebena. Molobeli ya lisungi ya engebena akoki kosunga yo na Formulaire BOC pe ko représenter yo na boyoki na yo. Bako tala mbongo nini oza nango pe soki bakanisi ete esengi na yo ya ebombamelo eza makasi (to ya malamu).
Sala esengi na nzela ya internet, par email, par fax, to kende yo moko na bilo ya Mosongi Engebena locale na yo. Kende na Mosongi Engebena Newfoundland pona kozua mikande ya esengi pe ba adresses ya ba bilo.
Kende na Mosongi Engebena ya Newfoundland pona kozua mikanda ya esengi pe ba adresses ya ba bilo.
Soki bapimi yo lisungi ya engebena, okoki kosala appel (senga révision)
Benga Clinique ya babombami ya Halifax pona kosenga lisungi avant obanda esengi na yo. Soki oza éligible pona situation ya mbongo, bakoki kopesa yo Ntoma (représentation légale) ya ofele.
Clinique ya Babombami ya Halifax 5538 Rue Macara Halifax, Nova Scotia Email: [email protected] Téléphone: 902 422 6736
Kontakte Mosongi Engebena Ontario (LAO) noki pe senga lisungi engebena. Soki ozali éligible, LAO akofuta ba frais juridiques pe akopesa yo ba kombo ya balobeli oyo bakoki ko représenter yo. Soki LAO alobi ete ozali éligible te, okoki kosenga révision ya ekateli na ye. Soki ozali kaka éligible te, eza na ba cliniques juridiques mosusu oyo bakoki kosunga yo. Mosaleli moko ya agence ya établissement akoki kosunga yo pona koluka ba ressources mosusu ya communauté na yo.
Mosongi Engebena Ontario
Benga ba limelo oyo pona kosenga lisungi ya engebena: Téléphone: 416-979-1446 Ya-Ofele: 1-800-668-8258
Toronto – Bilo ya Mibeko ya Babombami
20 Rue Dundas Ouest Suite 202 Toronto, ON M5G 2H1 Téléphone: 416-977-8111
Pona koluka molobeli ya privé na Île ya Prince Edward, kende na:
Kontakte Mosongi Engebena ya Québec – Bilo ya Mobeko ya Imigrasyon. Soki ozali éligible pona lisungi engebena, bakosunga yo pona koluka molobeli ya ofele oyo ako représenter yo. Ba régions nionso ya Québec baza na ba bilo ya engebena nyonso. Tala liste complète oyo pe ba sango na bango. Sala esengi ya lisungi ya engebena noki.
Temps ya attente ekoki kozala molayi pona bapesa molobeli epayi ya Mosongi Engebena. Souvent, bakopesa yo molobeli te avant date limite ya soumission ya Formulaire BOC na yo.
Okoki pe ko contakte molobeli na ndenge na yo, oyo andimaka ba mandats ya mosongi engebena. Soki o kontakte molobeli oyo andimaka mandat ya Mosongi Engebena, okoki kosolola na lisungi ya engebena pona bafuta ba frais. Tanga liste ya balobeli ya imigrasyon oyo bandimaka ba mandats ya lisungi ya engebena.
Mosongi Engebena ya Montréal – Bilo ya Mobeko ya Imigrasyon
Téléphone: 514-849-3671 425 Boulevard de Maisonneuve Ouest, Suite 400 Montréal
Soki oza na besoin ya lisungi pona koluka molobeli, okoki ko kontakte:
Téléphone: 514-484-7878 35, rue Port Royal Est, Montréal Ouvert du Lundi–Vendredi, de 9h à 17h
Centre ya Babombami – Clinique Juridique
Téléphone: 514-846-0005 2107 Rue Saint-Catherine Ouest #100 Montreal
Kontakte Clinique ya Défense CLASSIC ya sans rendez-vous na Saskatoon pona kosala esengi lisungi ya engebena pona Formulaire BOC na yo, pe pona représentation na boyoki na yo ya bobombami. Bapesaka ba services na batu oyo baza na salaire ya mokie na Saskatoon. Molobeli ako décider soki ozali éligible to te.
CLASSIC Walk-in Advocacy Clinic 123 – 20th Street West Saskatoon, SK S7M 0W7 Téléphone: 306-657-6100 Email: [email protected]
Mobeko Pro Bono Saskatchewan
Mobeko Pro Bono Saskatchewan eza na ba Cliniques Juridiques ya Ofele na province mobimba (sauf Saskatoon). Benga bango pona koyebi soki ozali éligible pona heure moko ya conseil juridique ya ofele na Molobeli.
Soki ozali éligible, okoki kokutana na avocat ba mbala ebele. Bokoki te kosunga yo nako remplir Formulaire BOC to kokende na boyoki na yo. Kasi, bakoki ko référer yo na Programme ya Panel ya Imigrasyon pe ya babombami, pona oluka molobeli oyo akokoka kosunga yo.
1650 – 2002 Victoria Avenue Regina, Saskatchewan S4P 0R7 Téléphone: 306-569-3098 Ya-Ofele: 1-855-833-7257 Fax: 306-569-2198 Email: [email protected]
