Soki oyebi koloba Anglais to Français te, esengeli na yo kozala na molimboli oyo ako sunga yo na procédure. Eza malamu kozala na molimboli (interprète) pona okoka ko comprendre procédure na yo ya ebombamelo. Ba tango oyo okoki kozala na besoin ya molimboli:
- Tango okokutana na ntoma oyo azali na bobateli na yo.
- Tango oko zala na ba masolo epayi ya IRCC to CBSA
- Mokolo ya boyoki na yo ya IRB-RPD
Soki oza na molobeli ya lisalisi mobeko, lisalisi mobeko ekoki kofuta pona molimboli. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli ya privé, ekosenga yo ofuta ba frais ya molimboli na yo moko. Na ba cas mosusu, neti ba kliniki ya lisalisi mobeko, moninga, bénévole to mosalisi akoki kosunga yo na kobongolisa.
Okoki kozala na molimboli ya professionnel ya ofele mokolo ya boyoki na yo. IRB-RPD nde eko pona molimboli, oza na bosémbo te ya kopona molimboli. Mibongolisi nionso ya IRB-RPD bazali entrainés, pe baza na expérience na likambo ya kobongola na tango ya ba boyoki.
Oyo esengeli molimboli na yo asala.
Rôle principal ya molimboli eza ko s’assurer ete batu nionso baza ko se comprendre malamu.
Esengeli molimboli:
- A bongola exactement maloba na yo. Akoki te kobakisa to kolongola makambo moko na oyo olobi.
- Alakisa te ete aza d’accord to te na makambo oza koloba.
- A bomba makambo nionso boko solola, eza privé.
Molimboli akoki te:
- Kopesa yo conseil to pe koyebisa yo makambo, liboso ete Membere apesa ye parole.
- Koloba oyo akanisi ete olingaki koloba, to kokata to pe kobakisa liloba na yo.
Soki okanisi ete molimboli asali erreur, to oza ko comprendre eloko te, yebisa yango na ntoma oyo azali na bobateli na yo, na Membre, to na officier.
