Kosala na Ntoma na Yo

Kopona Ntoma eza likambo ya ntina. Yeba ndenge nini esengeli na représentant légal na yo kosala na yo,nin esengeli na bango kosala te, pe rôle na yo na kati. Yeba nini okoki kosala soki Ntoma (représentant légal) na yo oza kosala moslala na ye na ndenge ya bien te.

Rôle na yo en tant client

Ata soki ozali na Ntoma (représentant légal), ezali esengi NA YO ya ebombamelo. Rôle na yo en tant que client eza:

  • Kopesa Ntoma (représentant légal) na yo ba elembo nionso pe ba mikanda oyo akosenga yo, pe ba sango nionso oza nango. Kotinda eloko moko te na IRB-RPD sans que osolola ango na Ntoma (représentant légal) na yo.
  • Koyebisa ye ba nouvelles ya ntina na nionso oyo etali mboka na yo.
  • Kotanga pe ko répondre na télephone to ba email.
  • Kotanga ba mikanda to ba sango apesaka yo.
  • Kopesa ye ba mikanda to ba lettres nionso oyo IRCC, CBSA to IRB-RPD bakotinda yo
  • Kopesa ye ba mikanda na yo ya sika (limelo ya téléphone, email, adresses), pe epayi akoki kotinda yo ba messages.
  • Senga lisungi tango oza nango besoin.
  • Yebisa ye makambo oyo esepelisi yo te, to soki oza d’accord te na likambo moko.
  • Zala na bosolo pona akoka kosunga yo na ndenge ya bien.
  • Zala organiséna embombeli ya ba mikanda na yo, pe koma ba notes pona ba makambo esengeli na yo kosala.
  • Zala ponctuel pona ba rendez-vous to ba boyoki na yo nionso.

Étape suivante ya guide ya section: 3.3 Mimonisa yo moko