Bongisa ba elembo

Esengeli na yo kokokisa pe kotinda ba elembo ya esengi nayo ya ebombamelo epayi ya IRB-RPD. Elembo ekoki kozala sango nionso oyo elakisi ete oza koloba vérité par rapport na bowulani na yo, oyo ekomelaki yo pe oyo oza kobanga ekomela yo soki ozongi mboka na yo. Elembo ekoki kozala mokanda, lettre, ba articles ya journal, ba rapports ya ba médecins to ya psychologue, ba photos, ba enregistrements audios, to pe ba vidéos.

Elembo ekoki kotinda Membere andima oyo ekomeli yo, à comprendre situation na yo na mboka na yo, pe pona nini okoki kozonga te.

Tango nini kokokisa ba elembo

Kokokisa ba elembo ezuaka temps, surtout soki oza komeka kozua yango na mboka mosusu. Banda kokokisa ba elembo bango. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, senga ye elembo nini ekoki kosunga dossier na yo, yebisa ye ba elembo nini oza nango, senga ye atunisa ba elembo na yo. Sala makambo oyo tout bango

Ba lisengeli ya bobongoli

Esengeli ba elembo na yo nionso, y compris ba enregistrements audios, ezala na Anglais to na Français. Ko utiliser Google Traduction te, pe kobongolisa ba mikanda na yo yo moko te. Eko zala malamu koluka mobongolisi ya professionnel. Soki oza na avocat ya aide juridique, bakoki ko couvrir partiellement to pe entièrement prix ya traduction. Soki okoki kofuta mobongolisi te, okoki kotuna moto oyo oza na confiance na ye, pe oyo a lobaka monoko ya mboka na yo pe Français to Anglais ya propre, abongolisa mibeko na yo.

Esengeli na molimboli na yo kolanda mokanda oyo esengeli na yo kotinda na IRB-RPD nzela moko na mibeko oyo obongolisaki. Esengeli mokanda ezala na:

  • Kombo ya mobóngoli,
  • Monoko to dialect (soki eza),
  • Lisakoli oyo elobi ete bobongoli ezali ya solo, mpe
  • signature ya mobongoli

Ba elembo à l’appui na yo

Eza na ba elembo miné oyo okoki kobongisa pona ko appuyer demande na yo.

Ba elembo ya bowulani na yo.

Esengeli na yo kozala na ba elembo ya bowulani pe ya mobotama na yo. Ekoki kozala:

  • pasepo,
  • Mokanda ya bowulani ya mboka.
  • acte de naissance,
  • certificat ya libala,
  • ba bulletins ya école, to pe ba diplômes,
  • permis de conduire,
  • identité militaire, to
  • adhésion professionnelle, to réligieuse,

Eza na ba elembo mosusu oyo ekoki kosunga. Tuna ntoma na yo ba elembo nini oko zala na besoin nango pona ko prouver bowulani na yo.

Ba elembo ya esengi na yo

Esengeli na yo kozala na ba elembo oyo elakisi ete:

  • Lisolo na yo pe ba événements ya lisolo na yo eza busolo.
  • Oza na bomo makasi ya kozonga mboka na yo
  • Oza en danger na mboka na yo
  • Mbulamatali na yo ekoki ko pesa yo te bobateli.
  • Okoki te kofanda na ville mosusu na mboka na yo

Mituna oyo ekoki kosunga yo pona kozua ba preuves pona demande na yo:

  • Est-ce que oza na ba photos, ba lettres, ba vidéos, ba emails, ba textos, to ba documents mosusu oyo ekoki ko prouver ba problèmes oyo ozalaki nango na mboka na yo?
  • Est-ce que okendeki na police to ba agences ya mbulamatali pona kosenga lisungi? Meka kozua copie ya rapport de police to elembo ya visite na yo epayi na bango.
  • Est-ce que ozuaki aide médicale? Meka kozua Kopie ya rapport ya hôpital to ya médecin.
  • Est-ce que eza na ba articles ya journal to ba postes na internet à propos ya bato to ba événements oyo eza en lien na esengi na yo?
  • Est-ce que eza a bato oyo bamonaki makambo oyo ekomelaki yo? Senga bango ba koma esakola na bango et ba tinda yo ango. Soki ekoki kosalema, senga bango ba loba liboso ya avocat to notaire. Senga bango pe ba tinda yo copie ya Mokanda ya bowulani (pièce d’identité) na bango.
  • Est-ce que eza na bato oyo bakutanaki na même problème na yo? Senga bango ba koma lisolo na bango. Soki ekoki kosalema, senga bango ba loba liboso ya molobeli to notaire ete lisolo na bango eza bosolo.
  • Est-ce que demande na yo eza basé likolo ya groupe religieux to groupe politique na yo, to pe ba groupes mosusu epayi oza membre? Luka ozua ba mokanda oyo eko lakisa ete oza membre ya ba groupes ango.
  • Est-ce que oza na ba problème mentaux cause na oyo elakaki na vie na yo? Luka ozua rapport epayi ya docteur, psychologue, to conseiller na Canada. Ekoki kozua yo temps ebele, eko zala malamu osala ango noki.
  • Est-ce que oza na réseaux sociaux? Kanga ba captures ya ba postes nionso oyo eza en lien direct na lisolo na yo.

Ekoki pe kozala ete okoki te kozua ba elembo nionso oyo ewuti mboka na yo, po ezali likama, to po eza pasi kozua yango kuna. Sala nionso oyo okoki kosala pona kozua ba elembo yango, pe soki okoki kozua elembo moko te, koma na IRB pona koyebisa bango pona nini okoki te kozua ba elembo yango.

Ba elembo ya ba réalités ya mboka na yo

Okoki kotinda ba elembo oyo elakisi ba réalités ya mboka na yo pe ndenge nini eza na yango na lisolo ya esengi na yo. Ekoki kozala ba rapports fiables ya makambo politiques, sociales, culturelles, économiques, pe ba droits ya mutu na mboka na yo.

IRB-RPD aza na ba documents public ya ba conditions ya ba mboka nionso ya mokili na Paquets de Documentation Nationale (NDPs).

Zala na bokebi! Ba mikanda mosusu oyo ezali na NDP ekoki kozala ya kala. Ekoki kozala ete ba conditions na mboka na yo e changer to makambo oyo ekomelaki yo ekoki to pe te kozala na NDP. Loba na ntoma oyo azali na bobateli pona koyeba ba información nini ekoki kosunga esengi na yo.

Par exemple, okoki kotinda

  • ba articles ya journaux récents to ba vidéos.
  • Ba lisakoli ya ba temwe ya experts.
  • ba articles académiques, to
  • ba rapports ya droits de l’Homme.

Tanga ba Paquets ya Documentation Nationale ya mboka na yo.

Ba elembo ya ba temwé

Okoki kozala na ba temwé oyo bako loba par rapport na lisolo na yo, na boyoki na yo. Temwé to motatoli aza moto oyo aza na ba información importantes na oyo etali yo pe esengi na yo. Mokolo ya boyoki na yo, ba temwé na yo bako répondre na mituna ya molobeli na yo, pe na mituna ya Membre. Ba temwé bakoki te koyoka témoignage na yo te mokolo ya boyoki, pe okoki te kosolola na bango na tango ya pause. Parfois, Membre akoki kozala na posa te ya kosenga ba temwé na yo baloba.

Soki oza na ba temwé, pesa IRB-RPD ba información oyo elandi, mikolo zomi liboso ya boyoki na yo:

  • Ba información na bango ya contact (adresse, numéro ya téléphone, pe numéro ya fax).
  • Lisakoli ya mokuse pona ko expliquer pona nini bako loba na boyoki na yo.
  • Tango nini okanisi ete bakoloba
  • Relation na yo na bango
  • Soki bako loba en présentiel, par vidéoconférence, to par téléphone
  • Soki bako zala na besoin ya mobongoli, pe monoko to dialect oyo ba lobaka
  • Soki temwé na yo aza erbasi, pesa ba información ya ba qualifications na ye, résumé ya makambo ako loba oyo ako signer ye moko.

Étape suivante ya guide ya section: 5.3 Esengi na yo pe Makambo ya Mibeko.