Eza na ba ndenge ebele ya importants ya komibongisa pona mokolo ya audience na yo. Audience ezali chance na yo ya kokutana na Membre ya IRB-RPD pe koyanola mituna na oyo etali lisolo na yo. Kozua temps pona komibongisa eko sunga yo na ko se sentir na controle ya procédure.
S’entraîner na koyanola mituna
Ndenge moko ya komibongisa pona boyoki na yo ezali préparation to répétition ya ba réponses na yo pona mituna Membre akoki kozala nango pona yo. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, okoki kosenga bango basala préparation to répétition ango na yo avant boyoki na yo. Tuna bango mituna nini bakoki kotuna yo mokolo ya boyoki, pe ndenge nini okoki koyanola. Ekozala malamu pona yo komibongisa pona koyanola mituna!
Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli te, okoki kotanga lisusu mikanda BOC na yo, lisolo na yo, pe ba elembo oyo otindaki (to o soumettaki). Kanisa ndenge nini okoki koyanola mituna na makambo oyo ekomami kati ya mikanda na yo.
Okoki ko s’entraîner na koyanola mituna na oyo etali:
- ba incohérences ya lisolo to ya mikanda na yo
- ba parties mosusu ya lisolo na yo
- pona nini okanisi ete oko na danger soki ozongi mboka na yo
- soki okoki kofanda na kimia na région mosusu ya mboka na yo
- Ba mokano oyo ozui lokola, pona nini obimaki na mboka na yo tango wana pe pona nini okaki te kobima na mboka na yo avant, to pona nini ozelaki avant osala esengi ya ebombamelo na Kanadá.
Okoki pe komibongisa pona koyanola mituna oyo o’comprendre te to oyo oyebi te. Soki Membere atuni yo motuna oyo o’comprendre te, komeka te koyanola ango. Yebisa Membre ete o’comprendre motuna na ye te pe senga ye a tuna motuna ango na ndenge mosusu. Ko inventer biyano te. Soki oyebi makambo te to soki oza sûr(e) na makambo te, loba ango.
Mema ba mikanda na yo nionso
Esengeli na yo omema mikanda nyonso pe ba elembo nionso oyo otindaki IRB-RPD mokolo ya boyoki na yo. Bongisa pe tia na ordre mikanda na yo nionso na kati ya clasiers moko pe mema yango mokolo ya boyoki na yo. Esengeli na yo komema:
- formulaire BOC
- lisolo
- ba formulaires ya imigrasyon
- ba elembo
- Lettre ya Notification ya Convocation
Membre ako pekisa yo otanga mikanda na yo pona koyanola mituna na ye. Mais, esengeli na yo komema mikanda yango quand même mpo Membre akoki pe koloba na yo otanga mikanda yango. Par exemple, na ebandeli ya boyoki na yo, Membre akosenga yo otala signature oyo eza na mikanda BOC na yo. Akoki pe kosenga yo otanga ba partie spécifiques ya mikanda na yo soki baza na mituna pona ba partie yango.
Kende na Ebongámí mpo na boyoki (Ready Tour)
Lolenge moko ya komibongisa mpo na koyoka na yo ezali ya kokende na Tour ya Komibongisa mpo na koyoka. Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tours) ezali ba sessions ya ofele na internet esika oyekolaka ndenge nini boyoki ekosala mpe ndenge nini okoki komibongisa mpo na yango. Okoyoka epai ya mosali ya IRB-RPD mpe okozala na libaku ya kotuna mituna nyonso oyo olingi na ntina ya boyokani.
Makambo oyo okoki koyekola pendant Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tour):
- Ndenge nini kosenga molimboli pona boyoki na yo?
- Ba elembo nini okoki kobongisa pona esunga esengi na yo?
- Ba problèmes légaux oyo bakoki ko mentionner na boyoki na yo
- Ndenge nini kotinda ba elembo na IRB-RPD
- Ndenge nini boyoki vitruelle esalemaka
- Nani akozala na boyoki na yo
- Ndenge nini okoyeba soki ba ndimi to baboyi esengi na yo
Cliquez awa pona ko s’enregistrer na Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tour).
Planifiez esika oko zala mokolo ya boyoki na yo
Mingi minig ya ba boyoki bazalaka virtuelles, elakisi ete esalemaka na nzela ya internet et non na ba bilo ya IRB-RPD. Okoyeba soki boyoki na yo ezala ya virtuelle to ya présentielle, tango okoyamba mokanda na yo ya Likanisi oyo IRB-RPD akotinda yo.
Soki boyoki na yo eza ya virtuelle, esengeli na yo kobongisa epayi nini pe ndenge nini oko assiter na boyoki virtuelle na yo. Eza na ba exigences techniques na ba exigences ya confidentialité oyo esengeli o’respecter pona ko participer na boyoki virtuelle. Tanga un plus na makambo oyo etali ba exigences yango awa.
Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, tuna ye soki okoki kokende na bilo na ye pona boyoki na yo. Soki oza na ntoma te, mituna soki okoki kosala boyoki na yo na ndaku na yo. Est-ce que oza na internet ya malamu,ordinateur to appareil oyo eza na caméra to webcam, pe soki oza na esika ya kimia? Soki oza na biloko oyo te, tango ba options mosusu oyo elandi:
- Soki oza na mosaleli to compagnie ya établissement oyo esungaka yo, tuna bango soki okoki kokende na ba bilo na bango pona boyoki na yo.
- Koma na IRB-RPD pona kotuna bango soki okoki ko utiliser ordinateur pe salle moko na ba bilo na bango pona ko participer na boyoki ya virtuelle na yo.
Soki okanisi ete boyoki en personne ekozala malamu mingi pona yo, okoki kokoma na IRB-RPD pona kotuna ete boyoki virtuelle ekoma boyoki en personne. Yebisa bango ba raisons na yo. Pona koyeba ndenge nini okoki kosala ango, tanga makambo oyo ekomama na site web ya IRB-RPD.
Planifiez esika bana na yo bakozala
Soki oza na bana ya mineurs ya moins de 18 ans, baza na besoin te ya kozala présents na boyoki, sauf soki IRB-RPD akomeli yo mokanda pona koyebisa yo ete esengeli bazala présents.
Sala plan pona koyeba esika nini bana na yo bako zala tango ya boyoki na yo. Soki ozali na boyoki ya virtuelle, pe ozali kosala yango na ndaku, meka kozala sûr ete bana na yo bazala te na esika oyo oko sala participar na boyoki ya virtuelle na ndaku na yo. Boyoki na yo eza très importante, pe ezali malamu kozala na ba distractions mingi te tango mokolo n’ango. Okoki pe koloba makambo ya pasi, makambo oyo okolinga bana na yo bayoka yango te. Soki okoki, tinda bana na yo na école to tuna nzoto moko to moninga moko abatela bango pona yo, to luka garderie pona bango.
Soki okoki te kozua place na garderie pona bana na yo, to muana na yo moko aza trop mokie, yebisa Membre na ebandeli ya boyoki.
Kobongola date to heure ya boyoki
Okoki kobongola mokolo to heure ya boyoki na yo kaka soki urgence ekomeli yo to oza malade. Okoki te kosenga ba bongola boyoki na yo pona ba raison mosusu.
Soki urgence ekomeli yo to maladie, esengeli na yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo:
- koyebisa ango na IRB-RPD na ekomeli (na nzela ya email to fax), ata mikolo misato (entre lundi na vendredi) liboso ya audience na yo.
- Proposez ba mokolo na ba heures missato pona boyoki na yo. Esengeli ba mokolo bazala kati ya mikolo zomi sima ya mokolo original ya boyoki na yo.
- Tinda ba mokanda ya bokono na yo soki raison na yo eza médicale. Soki okoki te kozua mokanda ya bokono, esengeli na yo o expliquer na mokanda pona nini okoki te kozua yango.
Mokolo ya boyoki
Tanga na bokebi nionso mokanda ya Likanisi ya Convocation. Ekoyebisa yo na heure nini esengeli ozala na boyoki na yo, pe soki eza boyoki na moto to boyoki ya virtuelle. Bako senga yo okoma 15 minutes avant boyoki na yo ebanda.
Soki esengeli na yo kokende esika mosusu pona boyoki na yo, lokola bilo ya molobeli na yo to bilo ya IRB-RPD, préparez na bokebi nionso tango oyo ekozua yo pona kokoma kuna na l’heure.
Lala malamu liboso ya boyoki na yo, pe lia malamu mokolo ya boyoki na yo. Okoki kosenga ba pauses tango ya boyoki na yo soki oza na besoin.
