Pona bandima esengi ya ebombamelo na yo, esengeli na yo ko prouver ete oza soit Mobombami ya Bobembani to Moto oyo aza na Besoin ya Bobateli. Sima ya kotanga ba mikanda pe koyoka lisolo na yo, Membere ya IRB-RPD moko ya IRB-RPD akozua ekateli.
Esengeli na yo ko comprendre ba ndombola (définitions) pe ndenge nini kosangisa ba elembo pona esunga esengi na yo.
Tanga ba partie nionso ya ba ndimbola. Pona partie nionso oyo ezali bosolo pona yo, sala liste ya ba elembo to pe ba preuves oyo okoki kozua pona kolakisa bosolo ya lisolo na yo. Pesa liste na ntoma oyo azali na bobateli na yo.
Mobombami ya Bobembani
Pona kozala Mobombami ya Bobembani, esengeli ete maloba motoba oyo ezala bosolo pona yo:
- Soki na zongi mboka na nga, nako subir bonyokoli (bako maltraiter ngai).
- Na kozala maltraité pona race, religion, ekolo, opinion politik, to pe pona groupe social na nga.
- Naza pena na bomo ya ko zonga kuna.
- Naza na tina kobanga makasi ya kofanda na mboka na ngai.
- Mbulamatali na ngai ekoki ko batela ngai te.
- Nakoki kofanda na kimia te na etando mobimba ya mboka na ngai.
Mutu oyo aza na Besoin ya bobateli
Pona bandima yo lokola moto oyo aza na besoin ya bobateli, esengeli na yo kolakisa ete 1 to 2 ezali ya solo.
- Soki na zongi mboka na nga, nako zala torturé epayi ya bakonzi ya mboka. TO
- Soki na zongi mboka na ngai, nakoki kokufa, ba koki pe ko torturer to ko punir ngai, pe…
- Mbulamatali na nga ekoki ko batela nga te,
- Nakoki kofanda na kimia to na ndenge ya malamu te na région mosusu ya mboka,
- Naza na danger oyo batu nionso te baza nagno na mboka na ngai.
- Naza na likama te po kaka na salaki mabe, oyo ezali considéré na Kanadá lokola ligboma, pe
- Naza na likama te po kaka système ya santé ya mboka na nga eza mabe.
