Ezibeli enene ya IRCC (Portail)

Kosolola ezibeli (portail) ya IRCC

Soki ozali déjà na Kanada tango obandi bosengi na yo ya ngunda, oko tinda demande na yo ya ngunda na kosalelaka site internet oyo babengi ezibeli (portail) ya IRCC. Okoyanola na mituna mpe okotinda formulaire na yo ya BOC mpe mikanda na yo na portail. IRCC esalela sango oyo otindi mpo na kozwa mokano soki ozali na makoki ya kosenga kobombana na mboka mopaya. IRB ekozwa kopi ya ba sango oyo nionso soki bamoni ete bosengi na yo ekoki kondimama.

Bongisá mikanda na yo

Yambo ya kosalela portail, talá mikanda ya ntina oyo osengeli kobongisa:

Bosala compte na portail ya IRCC

Soki mikanda na yo esili, okoki kokende na portail ya IRCC mpo na kosala compte.

Mpo na kobanda

Landa makambo oyo elandi:

  1. Salá code ya invitation mpo na kofungola compte.  
  2. Fungola compte na portail ya IRCC.  
  3. Soki okoti na compte na yo, finá na “Banda esengi”, sima pona “Tinda Esengi ya ebombamelo”.

Osalaka compte moko na portail ya IRCC pona yo pe ba membres ya famille na yo. Yo, molongani na yo mpe bana na yo moko na moko akozala na profil na ye na portail.

Salelá portail ya IRCC mpo na kotinda bosengi na yo

Soki compte na yo esalemi, esengeli obandi koyanola na mituna nyonso oyo ezali na portail.

Na Portal, ekosengela oyanola na mituna oyo etali:

  • Momonisi na yo ya mibeko
  • Ba informations personnelles na yo
  • Ba informations na yo ya kontakte
  • Libota na yo
  • Mibembo na yo ya kala
  • Baadrɛsi na yo (tyá esika oyo okendaki kofanda to obombaki) .
  • Boyekoli na yo, mosala mpe misala misusu
  • Mituna ya bokengi (seikirite)
  • Histoire médicale na yo
  • Makambo ya mikemike ya bosenga na yo

Mikanda

Esengeli kotinda mikanda na nzela ya portail ya IRCC. Mikanda misusu ezali obligatoire, misusu ezali optionnel

Esengeli otinda mikanda oyo elandi na format PDF:

Okoki ko telecharger mikanda misusu pona application na yo na tango moko. Soki ozali na momonisi ya mibeko te, ezali malamu kozela mpe kosala yango na nsima elongo na Ntoma na yo. Meká kozwa toli ya mibeko mpo na kosangisa elembo na yo . Ozali na ntango tii mikolo zomi liboso ya kosamba na yo mpo na kotinda elembo (preuve).

Ba mwa conseil mpo na kosalela Portal ya IRCC

  • Luka lisalisi epai ya molobeli to momonisi ya mibeko soki okoki.
  • Esengeli kokoma biyano na yo na Anglais to na Francais. Esengeli otikala na bokonzi ya biyano na yo soki ozali na mobongoli. Sɛngá mobongoli na yo atángela yo mituna mpe biyano nyonso na monɔkɔ na yo.
  • Kosala ba suppositions te to kosala ba dates te. Soki oyebi mokolo/sanza/mbula ya sikisiki te mpo na dati, kotia kaka mokolo ya liboso ya sanza. Komá mokanda mpo na kolimbola ete yo nde osali bongo.
  • Okoki mpe kotinda mokanda mpo na kolimbola soki ozalaki na mokakatano ya kosalela Portal to soki ozalaki na makoki te ya kotondisa malamu eteni ya formulaire.

Tinda esengi na yo

Soki osilisi koyanola na mituna nyonso mpe otie mikanda na yo, okoki kotinda bosengi na yo. Likebi! Soki o cliquer “Tinda demande”, okozala lisusu na makoki ya ko modifier to kobakisa information te. Kofina te “Tinda demande” kino oko vérifier soki ba informations nionso pe ba formulaire ezali correcte pe ya mobimba. Soki likoki ezali, sɛngá avoka to momonisi na yo ya mibeko atala lisusu likambo oyo osɛngi.

IRCC ekotindela yo email mpo na kondimisa boyambi ya bosengi na yo.

Nsima ya kotinda bosenga na yo

Nsima ya kotinda bosengi na yo na nzela ya internet, IRCC ekotala yango mpo na koyeba soki ekokisami.  

Soki esili, IRCC eko tindela yo:

Soki bosengi na yo ekoki te, IRCC ekoyebisa yo nini ezangi.

IRCC ekoki kotindela yo mikanda to mayebisi oyo etali bosengi na yo na nzela ya compte na yo ya portail. Na likambo oyo, okozwa email ya IRCC oyo ekobengisa yo mpo na ko vérifier compte na yo. Kobosana te kotala ba email na yo mbala na mbala, bakisa mpe dossier na yo ya ba spam, mpo ete ozanga eloko moko te na IRCC. Kota na compte na yo mpo na kotala ba mises à jour ya application na yo.