Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Rendez-vous biométrique

Lokola eteni ya mosala ya kobombana na mboka mopaya, bakozwa bilembo ya misapi mpe bafoto na yo. Oyo ezali “données biométriques” na yo.

Rendez-vous biométrique na CBSA na libongo ya bokoti

Soki olakisi bosengi na yo ya mokimi na CBSA na libongo ya bokoti, bakozwa biométrie na yo mbala moko.

Agent ya CBSA akozua:

  • bilembo ya misapi na yo mpe ya bato ya libota na yo (bazali na mbula 14 to koleka) .
  • Ba foto ya bato ya libota na yo (bazali na mbula 14 to koleka) .
  • Ba paseponionso mpe mikanda ya mobembo (mpe mikanda misusu ya bomoto lokola mikanda ya mbotama mpe mikanda ya kotambwisa motuka). CBSA ekopesa yo ba copies certifiées ya mikanda nionso oyo ezui.

Rendez-vous biométrique na IRCC na kati ya mboka

Soki otie esengi na yo na nzela ya portail ya IRCC, IRCC eko tindela yo mokolo ya rendez-vous pona kozua ba données biométriques na yo. Bankombo ya bato ya libota oyo basengeli kozala na rendez-vous ekobima na mokanda ya libyangi. Ntango okei na rendez-vous na yo ya biométrique, kobosana te komema mikanda oyo elandi:

  • Pasepo na yo mpe mikanda ya mobembo (lokola mpe mikanda misusu ya bomoto lokola mikanda ya mbotama mpe mikanda ya kotambwisa motuka). IRCC ekozwa mbala mosusu mikanda na yo ya ebandeli. Akopesa yo ba copies certifiées na tango ya masolo ya kondimama na yo.
  • Lettre oyo endimi ete bazwi bosenga na yo.
  • Liyebisi na yo ya rendez-vous biométrique.
  • Ba foto mibale ya ID mpo na bana oyo bakokisi naino mbula 14 te.

Étape suivante ya guide ya section: 4.6 Lisoló ya bondimami pona moponomi