Soki okoti na Kanada uta na Etats-Unis, ezali mpasi mpo na kosenga kobombana na mboka mopaya na nzela ya boyokani kati ya Kanada na Etats-Unis oyo babengi Boyokani na ndambo ya mboka ya Solo (STCA) Boyokani yango elobi ete osengeli kotinda bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya na mboka ya liboso ya libateli oyo okoti. Soki STCA etali yo, bakoki koyebisa yo ete okoki te kosala esengi ya Mobombami na Kanada.
STCA etali yo soki okati ndelo ya mabele kati ya Kanada na Etats-Unis tango okoti na Kanada. Esalemi te soki ozali koya uta na Etats-Unis na mpepo.
Likebi ! Soki okoti na Kanada na nzela ya libongo ya bokoti oyo ezali officiel te mpe osengi ngunda na mikolo 14, mbala mosusu bakozongisa yo na Etats-Unis. Okoki pe kopekisa yo kosenga ngunda na mikolo ekoya.
STCA ndéngé mosúsu
Ezali na mwa ba ndéngé mosúsu na STCA. Okoki kopesamela nzela ya kosenga kobombana na mboka mopaya soki okokisi moko ya ba ndéngé mosúsu oyo:
- Oza na libota na Kanada.
- Oza mineur oyo aye ye moko, pe oza na libota to pe tuteur légal te na États-Unis.
- Oza na visa ya Kanada oyo ezali valide, to permis d’études, to pe permis ya mosala
- Soki ozali condamné à mort na États-Unis to pe na mboka na yo.
- Oza apatride. (Moto oyo azali na bomwana mboka te)
- Ozali mwana-mboka ya États-Unis.
Agent ya ndelo akotuna yo mituna mpo na komona soki okoki kozwa moko ya ba exceptions oyo. Soki ezali bongo, bakopesa yo nzela ya kokɔta na Kanada. Soki okokisi masengami te, ozali na likama ya kozongisama na Etats-Unis mpe osengeli kolongwa na Kanada. Soki likoki ezali, tuna na Molobeli to momonisi ya mibeko mpo na koyeba banzela mosusu oyo okoki kosala mpo na komeka kotikala na Kanada.
