Soki ozali na Kanadá, o’kobanda esengi na yo ya ebombamelo na site web oyo ebengami Ezibeli ya IRCC.
Sosola lolenge ya kosala esengi na yo ya ebombamelo na partir to na kati ya Kanadá.
Esengeli na yo ete o’compléter Ezibeli ya IRCC pe ete o’tinda mikanda oyo ya tina na nzela ya internet, pona kobandela esengi na yo ya ebombamelo.
Sima ya kotinda esengi na yo ya ebombamelo na nzela ya Ezibeli ya IRCC, oko yamba:
- Mokanda ya Accusé de Réception ya Esengi na yo ya Ebombamelo.
- Denge nini pe tango nini okoki ko sala Ekzame ya Bokono pona Bilo ya bato bakota to Imigrasyon (IME)
IRCC e’kobenga yo pona kopesa yo rendez-vous ya ba empreintes biométriques, pe mokolo ya boyoki ya esengi na yo ya ebombamelo.
Soki esengi na bino ezali na boponomi ya bolongoli liboso ya IRB-RPD, bokozwa:
- Mokanda ya Bobateli ya Mobombami
- Lettre oyo e’confirmer ete esengi na yo ya ebombamelo, ba tindi ango epayi ya Komisiyo ya Bilo ya bato bakota pe ya babombami ya Kanadá (IRB)
Soki esengi na bino ezali na boponomi te ya bolongoli liboso ya IRB-RPD, bokozwa:
- Mokanda ya Bobateli ya Mobombami
- Mokanda oyo ekondimisa ete esengi na bino ya ebombamelo ezalaki na boponomi te ya bolongoli liboso ya IRB-RPD.
Mpo na koyeba lisusu, koluka koyeba soki esengi na ngai bakanisami ete ezali na boponomi te.
