Mokanda ya mosala

Mpo na kozwa ndingisa ya kosala na ndenge ya mibeko na Kanada, osengeli kozwa mokanda ya mosala epai ya guvɛrnema ya fédéral. Mokanda oyo ya ndingisa epesi yo nzela ya kosala na Kanada na ba conditions mosusu.

Mikanda ya mosala etambwisami na IRCC.

Ndenge nini kosenga mokanda ya mosala?

Yambo ya kozwa ndingisa ya mosala, esengeli liboso otondisa ba formulaire biométrique mpe oleka na Ekzame ya bokono pona bilo ya bato bakota to Imigrasyon (IME).

Soki opesi bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya na nzela ya portail ya IRCC, bakotuna yo soki olingi kozwa mokanda ya mosala. Soki ezali bongo, poná kaka “Ɛɛ” mpo na kosɛnga yango. Esengeli te ofuta ndingisa ntango ozali kozela ete bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya ezwa mokano.

Mokanda na yo ya mosala ekotindama na adresse postale oyo olakisaki na portail ya IRCC. Ntango oyo esengeli mpo na kozwa mokanda na yo ya mosala etali ntango oyo ozali kosala.

Na makambo mosusu, tango ozali kotinda esengi na yo ya bobombami na libongo ya bokoti mpe otondisi ba formulaire na mosali ya CBSA, okoki kosenga ndingisa ya mosala.

Soki osengaki ndingisa ya mosala te tango otondisaki ba formulaire na yo ya bosengi ya kobombana na mboka mopaya, okoki kosala yango sima na kotondisaka lokasa ya bosengi ndingisa ya mosala.

Salá sika mokanda na yo ya mosala

Mikanda ya mosala ezali na nguya mpo na mbula mibale. Ezali na ntina mingi kosenga bozongisi sika ya mokanda na yo ya mosala yambo esila. Ekozala na mposa ya kokoba kozongisa sika mokanda na yo ya mosala kino okokoma mopaya ewumela.

Esengeli osenga bobakisi ya mokanda na yo ya mosala ata sanza 2-3 yambo ete mokanda ya mosala na yo ya lelo esila.

Soki ozwi te mokanda na yo ya sika ya mosala na mokolo oyo mokanda na yo ya kala ekosila, okoki kaka kosala. Lakisa patrɔ na yo bilembeteli oyo emonisi ete osɛngaki bázongisa yo sika.


Étape suivante ya guide ya section: 5 Bongama pona boyoki na Yo