Ba boyoki ya Mobombami baza privés pe baza ouverts te na publika. Eza kaka na certaines personnes oyo bakoki kozala présent na boyoki na yo:
Membere ya IRB-RPD
Moto oyo akozua ekateli na boyoki na yo babengaka ye Membere. Membere moko ya IRB-RPD a dirigeaka boyoki pe adécidaka soki ako ndima to te esengi na yo. Esengeli na membre a traiter yo na respect pe na soin. Membere ako tango Formulaire BOC na yo, pe ako tala ba elembo na yo nionso liboso ya boyoki na yo. Akotuna yo mituna tango ya boyoki pona esunga ye na ekateli na ye pona esengi na yo ya ebombamelo.
Représentant légal (Ntoma oyo azali na bobateli)
Représentant légal na yo akoki kozala molobeli, consultant ya imigrasyon, to représentant ya ofele. Na Québec, notaire, to na Ontario, paralégale, bakoki pe ko représenter yo.
Tango Membere ako tuna yo mitunana boyoki na yo, représentant légal na yo akoki ko expliquer yo makambo. Représentant légal na yo akoki te koyanola na place na yo. Mibongisa pona koyanola mituna ya Membere yo moko. Représentant légal na yo akozala na opportunité ya kotuna yo mituna, kasi mingi mingi esengeli na ye azela Membere asilisa kotuna yo mituna na ye.
Na suka ya boyoki na yo, ntoma oyo azali na bobateli na yo akoki kopesa résumé ya esengi na yo na Membre. Wana ebengami “soumissions”. Ntoma oyo azali na bobateli na yo akoki koyebisa ba soumissions na yo na Membre mokolo ya boyoki, to akoki kokomela ba soumissions ango pe kotinda yango na IRB-RPD sima ya boyoki na yo.
Conseiller ya Ministre
Conseiller ya Ministre azali mosali ya CBSA to ya IRCC. Conseilller ya Ministre aza impliqué na ba esengi ya ebombamelo nionso te. Akoki ko s’impliquer na ba esengi soki alingi ko argumenter contre esengi na yo ya asile. Soki Conseiller ya Ministre a s’impliquer, ezali pona aza na ba préoccupations na oyo etali:
- Bowulani na yo, to ba mikanda na yo,
- bosolo ya lisolo na yo, to
- Akinisi ete oza moto ya ligboma to oza membre ya lingomba ya likama.
Okoyeba soki Ntoma ya Ministre ako s’impliquer na esengi na yo. Liboso ya boyoki na yo, Ntoma ya Ministre akotinda yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo Notification ya Intervention. Na kati ya notification ango, akoyebisa yo ndenge nini pe pona nini ako s’impliquer na esengi na yo. Notification ekoyebisa yo soki ako yaka na boyoki na yo, to soki akotinda kaka mikanda. Okoyamba notification mikolo zemi liboso ya boyoki na yo. Tanga na bokebi nionso pe mibongisa pona koloba na makambo oyo etali oyo ekomami na kati ya notification. Soki Ntoma ya Ministre moko aza na boyoki na yo, zala sûr ete ako tuna yo mituna.
Molimboli
Rôle ya molimboli eza ya ko s’assurer ete batu nionso baza ko se comprendre na ndenge ya malamu. Ata soki oyokaka Anglais to Français, eko zala malamu o’zala na molimboli pona ko éviter ba erreurs. Mibongolisi ya IRB ba partageaka te ba información na yo to ya esengi na yo na batu oyo bazali libanda ya salle ya boyoki.
IRB-RPD akozua yo molimboli ya ofele oyo alobaka monoko to dialect ya mboka na yo. Ata soki oyebisaki te ete oza na lisengisi ya molimboli na Formulaire BOC na yo, okoki kosenga pona ye. Koma na IRB-RPD mikolo zomi ou plus, liboso ya boyoki na yo, pona kosenga molimboli.
Okoki kosenga molimboli ya sexe spécifique to ya sexe moko na yo soki eko pesa yo kimia. Par exemple, soki esengi na yo ya ebombamelo eza basé na makambo ya sensibles oyo ekomelaki yo, pe oko zala plus à l’aise kozala na molimboli ya sexe moko na yo, yebisa ango IRB-RPD.
Ba Temwé
Okoki kozala na ba motango na boyoki na yo. Motango azali moto oyo aza capable ya ko confirmer makambo oyo ekomeli yo. Bakoki kozala na Kanadá, to na mboka mosusu. Ba motango akoki pe kozala erbasi na makambo oyo etali esengi na yo ya ebombamelo.
Pona batatoli na yo malamu na lisalisi ya momonisi na yo ya mibeko. Salá makasi obongisa yango liboso ya koyoka yo. Tiká batatoli na yo báyeba ete makambo oyo bazali koloba esengeli kozala solo. Soki olingi kobengisa temwé na boyokani na yo, yo to momonisi na yo ya mibeko osengeli kokomela IRB-RPD (mpe conseil ya Ministre soki esengeli) mikolo zomi to koleka yambo ya boyokani. Pesá bango:
- Kombo ya temwé na yo
- Déclaration ya mokuse pona ko expliquer pona nini bako loba na boyoki na yo.
- Relation na yo na temwé na yo
- Tango nini okanisi ete bakoloba
Ba observateurs
Okoki ko inviter observateur moko to moke na boyoki na yo pona soutien émotionnel. Observateur akoki kozala moninga, nzoto, to membre ya lingomba na yo.
Mokolo ya boyoki na yo, Membre ako tuna observateur aza nani. Pendant boyoki na yo, ba observateurs bakoki te koloba, esengeli na bango bafanda solo. Bakoki te kozala ba temwé.
Bana na yo ya 18ans to ya mineurs
Soki oza na bana oyo baza na 18 ans to plus, esengeli ba yaka na boyoki ya esengi ya ebombamelo. Bana na se ya 18 ans bakoki te kozala na boyoki na yo, sauf soki Membre asengi na bango bayaka. Pona ba boyoki ya virtual (na nzela ya internet), meka kozala na moto oyo akoki ko s’occuper na bana na yo esika mosusu. Okoki koloba ba évènements oyo ya traumatisants. Soki okoki, tinda bana na yo na école, to epayi ya nzoto to moninga na yo moko, to pe tinda bango na garderie.
Représentant Désigné
IRB-RPD apesaka Ntoma ebandeli pona a représenter ba mineurs to ba adultes oyo bakoki te ko comprendre lolenge ya esengi ya ebombamelo. Ntoma ebandeli asungaka moto oyo akoki ko comprendre makambo ezakoleka te, pe asungaka na kobongisa dossier na ndenge ya malamu. Bakoki kotuna Ntoma ebandeli mituna mokolo ya boyoki. Mingi mingi, IRB-RPD aponaka nzoto moko lokolo Ntoma ebandeli tango muana aza kosala esengi na nzela moko na ba nzoto na ye.
