Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo.
Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Boyoki ya Virtual pe Boyoki na Moto.

Ezali na denge mibale ya boyoki pona babombami: virtual (na nzela ya internet), pe ya “na moto”.

Boyoki Virtuelles

Boyoki ya virtual e’kosalema na nzela ya internet. Batu nyonso bako monana na écran ya ordinateur na nzela ya site web to application oyo ebengami “Microsoft Teams”.

Kobongama pona pona boyoki virtuelle na yo

Yo, to ntoma oyo azali na bobateli na yo akozua mokanda ya Likanisi ya Boyoki sima ete IRB-RPD kati mokolo pe ngonga ya boyoki na yo. Tanga Likanisi ya Boyoki ango na likebi mpo e’kolakisa yo nini kosala pona boyoki ya virtual.

Pona boyoki virtuelle esengeli o’zala na:

  • Connection internet moko ya rapide, ya sécurisé, pe ya solo.
  • Ordinateur to tablette
  • Esika ya kimia pe ya privé

Soki ozali na ntoma, okoki kokende na bilo na ye pona kosala boyoki virtuelle na yo kuna. Solola ba likokí ya ko sala’ngo na ye.

Soki o’kokende na bilo ya ntoma oyo azali na bobateli na yo te, luka ete ozala na biloko nyonso oyo esengeli yo pona kosala boyoki ya virtual na yo. Soki oza na ordinateur, tablette to internet te, senga lisungi na IRB-RPD. IRB-RPD e’koki kopesa yo ordinateur to tablette pona o’kola yango na bilo na bango. Senga IRB-RPD lisungi ya IRB-RPD ya etuka epayi ofandaka, na nzela ya téléphone, email, to na nzela ya poste. Esengeli kobenga bango mikolo zomi liboso ya boyoki na yo.

Mikolo mitano liboso ya boyoki, IRB-RPD e’kotindela ntoma oyo azali na bobateli na yo lien pona vidéoconférence. Bakopesa yo lien pona boyoki ya virtual. Soki ozali na ntoma te, IRB-RPD e’kotindela yo lien na nzela ya email. Esengeli ete IRB-RPD ezala na adresse email, numéro na yo ya téléphone, pe adresse postale na yo.

Na boyoki virtuelle na yo

Mokolo ya boyoki ya virtual na yo, bakosenga yo o’kota to se konekte na lien ya lenio na nzela ya internet minutes zomi na mitano liboso ete boyoki na yo e’banda. Yango e’kopesa yo moyen ya koyeba soki internet eza kosala malamu na ordinateur na yo, moyen ya kosolola na moko ya batu ya IRB-RPD, pe kosolola lisusu na mobongolisi ya IRB-RPD pona komona na ye soki boza koyokana to ko se comprendre malamu. Tango Membere akokota na boyoki, a’kosolola na yo pe a’kosenga na yo o’ndima ete azali yo moko kati ya esika o’batami. Soki oza komona to koyoka malamu te na nzela ya internet, yebisa Membere.

Soki o’lingi boyoki na yo esalema na nzela ya internet te

Ba boyoki nionso ya babombami esalamaka na nzela ya internet, kasi o’koki pe kosenga ete e’salema en personne.

O’sengeli kotinda formulaire oyo  pe kotinda yango mikolo zomi liboso ya boyoki na yo. Osengeli koloba tina nini o’lingi to o’sengili  kosala boyoki na yo en personne.

Boyoki en Personne

Boyoki ya misu na misu to ya en personne, e’salemaka na bilo ya IRB-RPD. Batu nionso bazalaka esika moko.

O’kosala boyoki ya misu na misu kaka soki IRB-RPD a’ndimi ete boyoki na yo esalema misu na misu, to soki o’sengi ete boyoki na yo esalama misu na misu pe IRB-RPD a’ndimeli yo.

Ba boyoki ya misu na misu e’salemaka na bilo ya IRB-RPD. Yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo a’kozua mokanda ya Likanisi ya Boyoki sima ete IRB-RPD e’kati mokolo pe ngonga ya boyoki na yo. Likanisi ya Boyoki nde e’kolakisa yo adresse ya esika wapi boyoki na yo e’kosalema. Tanga Likanisi ya Boyoki ango na bokebi nyonso mpo e’kolakisa yo nini kosala.

Na boyoki na moto na yo

Mokolo ya boyoki na yo, sala nionso o’koma 15 to 30 minutes avant ete boyoki e’banda. Yango e’kopesa yo tango ya koluka salle ya boyoki. Soki oza na batu oyo ba kolinga kotala to batatoli, bango pe ba sengeli kokoma 15 minutes avant boyoki. Bakoki kosenga na yo o’zela na salle ya attente ti basilisa kobongisa salle ya boyoki. Liboso ete boyoki e’banda, solola na mobongolisi maloba pona koyebisa soki boza ko se comprendre.


Étape suivante ya guide ya section: 6.4 Mokolo ya boyoki na yo