Na boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.

Boyoki na yo ezali likambo ya minene na processus ya esengi nayo ya ebombamelo na yo. Yekola makambo nini okoki ko s’attendre na’ngo mokolo ya boyoki na yo. Yeba batu nini bakozala kuna mokolo wana, pe rôle na bango. Bóngisama pona boyoki na yo ya virtuel (online) to ya présentiel.

Oyo etali boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.

Boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo ezali parti ya motuya pona lolenge ya esengi na yo ya ebombamelo. Na mokolo ya boyoki na yo, to sima na yango, bako yebisa yo soki ba ndimi to ba boyi esengi na yo ya ebombamelo.

Boyoki na yo eza chance pona kobeta lisolo na yo pe ko yebisa bango pona nini oza na besoin ya bobateli ya Kanadá.

Boyoki na yo ekoki komonana lokola tribunale mais ezali moins formel. Batu oyo ba décidaka na mokolo ya audience babengami ba Memberes pe bazali spécialement entraîné pona kokata na makambo oyo etali ba esengi ya ebombamelo. Moko ya ba Memberes akokata likambo na yo na bosembo nionso.

Ba boyoki ewumelaka entre 3 to 4 heures, kasi ekoki pe kozala mokuse to molayi koleka, edependaka na ba circonstances. Mingi mingi ba boyoki esalemaka na internet (virtuellement), pe misusu esalemaka na bilo ya IRB.

Nani akozala na boyoki na yo ya Mobombami?

Ba boyoki ya Mobombami baza privés pe baza ouverts te na publika. Eza kaka na certaines personnes oyo bakoki kozala présent na boyoki na yo:

Membere ya IRB-RPD

Moto oyo akozua ekateli na boyoki na yo babengaka ye Membere. Membere moko ya IRB-RPD a dirigeaka boyoki pe adécidaka soki ako ndima to te esengi na yo. Esengeli na membre a traiter yo na respect pe na soin. Membere ako tango Formulaire BOC na yo, pe ako tala ba elembo na yo nionso liboso ya boyoki na yo. Akotuna yo mituna tango ya boyoki pona esunga ye na ekateli na ye pona esengi na yo ya ebombamelo.

Représentant légal (Ntoma oyo azali na bobateli)

Représentant légal na yo akoki kozala molobeli, consultant ya imigrasyon, to représentant ya ofele. Na Québec, notaire, to na Ontario, paralégale, bakoki pe ko représenter yo.

Tango Membere ako tuna yo mitunana boyoki na yo, représentant légal na yo akoki ko expliquer yo makambo. Représentant légal na yo akoki te koyanola na place na yo. Mibongisa pona koyanola mituna ya Membere yo moko. Représentant légal na yo akozala na opportunité ya kotuna yo mituna, kasi mingi mingi esengeli na ye azela Membere asilisa kotuna yo mituna na ye.

Na suka ya boyoki na yo, ntoma oyo azali na bobateli na yo akoki kopesa résumé ya esengi na yo na Membre. Wana ebengami “soumissions”. Ntoma oyo azali na bobateli na yo akoki koyebisa ba soumissions na yo na Membre mokolo ya boyoki, to akoki kokomela ba soumissions ango pe kotinda yango na IRB-RPD sima ya boyoki na yo.

Conseiller ya Ministre

Conseiller ya Ministre azali mosali ya CBSA to ya IRCC. Conseilller ya Ministre aza impliqué na ba esengi ya ebombamelo nionso te. Akoki ko s’impliquer na ba esengi soki alingi ko argumenter contre esengi na yo ya asile. Soki Conseiller ya Ministre a s’impliquer, ezali pona aza na ba préoccupations na oyo etali:

  • Bowulani na yo, to ba mikanda na yo,
  • bosolo ya lisolo na yo, to
  • Akinisi ete oza moto ya ligboma to oza membre ya lingomba ya likama.

Okoyeba soki Ntoma ya Ministre ako s’impliquer na esengi na yo. Liboso ya boyoki na yo, Ntoma ya Ministre akotinda yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo Notification ya Intervention. Na kati ya notification ango, akoyebisa yo ndenge nini pe pona nini ako s’impliquer na esengi na yo. Notification ekoyebisa yo soki ako yaka na boyoki na yo, to soki akotinda kaka mikanda. Okoyamba notification mikolo zemi liboso ya boyoki na yo. Tanga na bokebi nionso pe mibongisa pona koloba na makambo oyo etali oyo ekomami na kati ya notification. Soki Ntoma ya Ministre moko aza na boyoki na yo, zala sûr ete ako tuna yo mituna.

Molimboli

Rôle ya molimboli eza ya ko s’assurer ete batu nionso baza ko se comprendre na ndenge ya malamu. Ata soki oyokaka Anglais to Français, eko zala malamu o’zala na molimboli pona ko éviter ba erreurs. Mibongolisi ya IRB ba partageaka te ba información na yo to ya esengi na yo na batu oyo bazali libanda ya salle ya boyoki.

IRB-RPD akozua yo molimboli ya ofele oyo alobaka monoko to dialect ya mboka na yo. Ata soki oyebisaki te ete oza na lisengisi ya molimboli na Formulaire BOC na yo, okoki kosenga pona ye. Koma na IRB-RPD mikolo zomi ou plus, liboso ya boyoki na yo, pona kosenga molimboli.

Okoki kosenga molimboli ya sexe spécifique to ya sexe moko na yo soki eko pesa yo kimia. Par exemple, soki esengi na yo ya ebombamelo eza basé na makambo ya sensibles oyo ekomelaki yo, pe oko zala plus à l’aise kozala na molimboli ya sexe moko na yo, yebisa ango IRB-RPD.

Ba Temwé

Okoki kozala na ba motango na boyoki na yo. Motango azali moto oyo aza capable ya ko confirmer makambo oyo ekomeli yo. Bakoki kozala na Kanadá, to na mboka mosusu. Ba motango akoki pe kozala erbasi na makambo oyo etali esengi na yo ya ebombamelo.

Pona batatoli na yo malamu na lisalisi ya momonisi na yo ya mibeko. Salá makasi obongisa yango liboso ya koyoka yo. Tiká batatoli na yo báyeba ete makambo oyo bazali koloba esengeli kozala solo. Soki olingi kobengisa temwé na boyokani na yo, yo to momonisi na yo ya mibeko osengeli kokomela IRB-RPD (mpe conseil ya Ministre soki esengeli) mikolo zomi to koleka yambo ya boyokani. Pesá bango:

  • Kombo ya temwé na yo
  • Déclaration ya mokuse pona ko expliquer pona nini bako loba na boyoki na yo.
  • Relation na yo na temwé na yo
  • Tango nini okanisi ete bakoloba

Ba observateurs

Okoki ko inviter observateur moko to moke na boyoki na yo pona soutien émotionnel. Observateur akoki kozala moninga, nzoto, to membre ya lingomba na yo.

Mokolo ya boyoki na yo, Membre ako tuna observateur aza nani. Pendant boyoki na yo, ba observateurs bakoki te koloba, esengeli na bango bafanda solo. Bakoki te kozala ba temwé.

Bana na yo ya 18ans to ya mineurs

Soki oza na bana oyo baza na 18 ans to plus, esengeli ba yaka na boyoki ya esengi ya ebombamelo. Bana na se ya 18 ans bakoki te kozala na boyoki na yo, sauf soki Membre asengi na bango bayaka. Pona ba boyoki ya virtual (na nzela ya internet), meka kozala na moto oyo akoki ko s’occuper na bana na yo esika mosusu. Okoki koloba ba évènements oyo ya traumatisants. Soki okoki, tinda bana na yo na école, to epayi ya nzoto to moninga na yo moko, to pe tinda bango na garderie.

Représentant Désigné

IRB-RPD apesaka Ntoma ebandeli pona a représenter ba mineurs to ba adultes oyo bakoki te ko comprendre lolenge ya esengi ya ebombamelo. Ntoma ebandeli asungaka moto oyo akoki ko comprendre makambo ezakoleka te, pe asungaka na kobongisa dossier na ndenge ya malamu. Bakoki kotuna Ntoma ebandeli mituna mokolo ya boyoki. Mingi mingi, IRB-RPD aponaka nzoto moko lokolo Ntoma ebandeli tango muana aza kosala esengi na nzela moko na ba nzoto na ye.

Boyoki ya Virtual pe Boyoki na Moto.

Ezali na denge mibale ya boyoki pona babombami: virtual (na nzela ya internet), pe ya “na moto”.

Boyoki Virtuelles

Boyoki ya virtual e’kosalema na nzela ya internet. Batu nyonso bako monana na écran ya ordinateur na nzela ya site web to application oyo ebengami “Microsoft Teams”.

Kobongama pona pona boyoki virtuelle na yo

Yo, to ntoma oyo azali na bobateli na yo akozua mokanda ya Likanisi ya Boyoki sima ete IRB-RPD kati mokolo pe ngonga ya boyoki na yo. Tanga Likanisi ya Boyoki ango na likebi mpo e’kolakisa yo nini kosala pona boyoki ya virtual.

Pona boyoki virtuelle esengeli o’zala na:

  • Connection internet moko ya rapide, ya sécurisé, pe ya solo.
  • Ordinateur to tablette
  • Esika ya kimia pe ya privé

Soki ozali na ntoma, okoki kokende na bilo na ye pona kosala boyoki virtuelle na yo kuna. Solola ba likokí ya ko sala’ngo na ye.

Soki o’kokende na bilo ya ntoma oyo azali na bobateli na yo te, luka ete ozala na biloko nyonso oyo esengeli yo pona kosala boyoki ya virtual na yo. Soki oza na ordinateur, tablette to internet te, senga lisungi na IRB-RPD. IRB-RPD e’koki kopesa yo ordinateur to tablette pona o’kola yango na bilo na bango. Senga IRB-RPD lisungi ya IRB-RPD ya etuka epayi ofandaka, na nzela ya téléphone, email, to na nzela ya poste. Esengeli kobenga bango mikolo zomi liboso ya boyoki na yo.

Mikolo mitano liboso ya boyoki, IRB-RPD e’kotindela ntoma oyo azali na bobateli na yo lien pona vidéoconférence. Bakopesa yo lien pona boyoki ya virtual. Soki ozali na ntoma te, IRB-RPD e’kotindela yo lien na nzela ya email. Esengeli ete IRB-RPD ezala na adresse email, numéro na yo ya téléphone, pe adresse postale na yo.

Na boyoki virtuelle na yo

Mokolo ya boyoki ya virtual na yo, bakosenga yo o’kota to se konekte na lien ya lenio na nzela ya internet minutes zomi na mitano liboso ete boyoki na yo e’banda. Yango e’kopesa yo moyen ya koyeba soki internet eza kosala malamu na ordinateur na yo, moyen ya kosolola na moko ya batu ya IRB-RPD, pe kosolola lisusu na mobongolisi ya IRB-RPD pona komona na ye soki boza koyokana to ko se comprendre malamu. Tango Membere akokota na boyoki, a’kosolola na yo pe a’kosenga na yo o’ndima ete azali yo moko kati ya esika o’batami. Soki oza komona to koyoka malamu te na nzela ya internet, yebisa Membere.

Soki o’lingi boyoki na yo esalema na nzela ya internet te

Ba boyoki nionso ya babombami esalamaka na nzela ya internet, kasi o’koki pe kosenga ete e’salema en personne.

O’sengeli kotinda formulaire oyo  pe kotinda yango mikolo zomi liboso ya boyoki na yo. Osengeli koloba tina nini o’lingi to o’sengili  kosala boyoki na yo en personne.

Boyoki en Personne

Boyoki ya misu na misu to ya en personne, e’salemaka na bilo ya IRB-RPD. Batu nionso bazalaka esika moko.

O’kosala boyoki ya misu na misu kaka soki IRB-RPD a’ndimi ete boyoki na yo esalema misu na misu, to soki o’sengi ete boyoki na yo esalama misu na misu pe IRB-RPD a’ndimeli yo.

Ba boyoki ya misu na misu e’salemaka na bilo ya IRB-RPD. Yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo a’kozua mokanda ya Likanisi ya Boyoki sima ete IRB-RPD e’kati mokolo pe ngonga ya boyoki na yo. Likanisi ya Boyoki nde e’kolakisa yo adresse ya esika wapi boyoki na yo e’kosalema. Tanga Likanisi ya Boyoki ango na bokebi nyonso mpo e’kolakisa yo nini kosala.

Na boyoki na moto na yo

Mokolo ya boyoki na yo, sala nionso o’koma 15 to 30 minutes avant ete boyoki e’banda. Yango e’kopesa yo tango ya koluka salle ya boyoki. Soki oza na batu oyo ba kolinga kotala to batatoli, bango pe ba sengeli kokoma 15 minutes avant boyoki. Bakoki kosenga na yo o’zela na salle ya attente ti basilisa kobongisa salle ya boyoki. Liboso ete boyoki e’banda, solola na mobongolisi maloba pona koyebisa soki boza ko se comprendre.

Mokolo ya boyoki na yo

Boyoki na yo ekozala tango boni?

Mbala mingi, ba audiences eumelaka ndambo ya mokolo, na bopemi mokuse na katikati ya nzela. Ba auditions mosusu ezalaka mokuse, mosusu molai. Soki bosengi na yo eyokami elongo na bato mosusu ya libota, to soki ezali na makambo mingi ya kolobela, boyokani ekoki kowumela mokolo mobimba.

Okoki kosenga bopemi na ntango nyonso na ntango ya audition soki ozali na mposa ya yango.

Ntango nini osengeli kokóma?

Ezali na ntina mingi kokóma liboso mpo na koyoka yo. Soki audition na yo ezali virtuelle, esengeli okota na réunion en ligne ya Microsoft Teams 15 minutes avant boyoki na yo ebanda. Soki bosambisi na yo ezali na miso, esengeli okoma miniti 15 kino 30 yambo ete bosambisi ebanda mpo na kosala ete ozwa ndako ya esambiselo.

Nini ekosalema na tango ya audition na yo?

1. Maloba ya ebandeli

Député ako introduire mutu nionso na chambre pe akolimbola yo procédure ya boyoki. Akosenga yo otombola loboko na yo ya mobali mpe olaka koloba solo.

2. Bondimi ya mikanda :

Commissaire atalaka mikanda nionso oyo etindamaki lokola elembo ya demande na yo ya ngunda. Asalaka que mutu nionso azala na copie ya mikanda nionso pe apesa limelo na mokanda moko na moko. Commissaire akoki pe kotala mikanda ya ebandeli oyo omemi na boyoki.

3. Mituna:

Na nsima, commissaire akotuna yo mituna. Mituna ekoki kozala na ntina ya bomoi na yo, mikanda, mpe makambo ya mibeko oyo ezali na ntina mpo na bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya. Nsima ya commissaire kotuna yo mituna, avocat ya ministre (soki azali) akoki kotuna yo mituna. Momonisi na yo ya mibeko akoki mpe kotuna yo mituna.

4. Temwe

Soki oza na ba temwe, bakoloba na nsima. Batatoli bakokoka kosangana na boyokani bobele ntango ntango ekoki mpo na bango ya koloba.

5. Ba commentaires

Na suka ya boyokani, mosangani akopesa yo to molobeli na yo libaku ya kolimbola na maloba na yo moko mpo na nini okanisi ete bilembeteli bizali kolakisa ete okokisi ndimbola ya “mokimi mboka ya boyokani to “moto oyo azali na mposa ya bobateli”. Yango babengaka yango ba observations. Soki ozali na momonisi ya mibeko, bakoki koyokana na député mpo na kotinda ba observations wana na mokanda sima ya audience. Molobeli ya ministre (soki azali) azali ko présenter ba observations na ye na suka.

6. Mokáno:

Na suka ya boyokani, mosangani akoki koyebisa yo mokáno na ye ya kondima to koboya bosenga na yo, to koyebisa yo ete bakotindela yo mokano na bango na nzela ya posita. Na makambo nyonso mibale, okozwa “liyebisi ya mokáno” na nzela ya posita.

Nini esengeli omema na boyoki na yo?

Na tango ya boyoki, esengeli osala que ozala na dossier na yo :

  • formulaire BOC
  • Narratif
  • Ba formulaires ya Imigrasyon
  • Elembo
  • Mokanda ya Notification ya Convocation

Mbala mingi député akoyebisa yo otanga mikanda na yo te tango ozali koyanola na mituna. Kasi ezali na ntina kozala na mikanda na yo elongo na yo, mpo ete député akoki kosenga yo otala biteni to nkasa ya sikisiki ya mikanda na yo.

Ba boyoki ezalaka privée?

Ba boyoki nionso ya babombami ezali sekele. Yango elingi koloba ete moto nyonso oyo azali koyoka yo, ata mpe mobongoli, azali na ndingisa te ya kokabola makambo oyo etali bosengi na yo na moto mosusu.

Osala nini soki ozali ko comprendre motuna moko te?

Soki député atuni yo motuna oyo ozali ko comprendre te, koluka koyanola yango te. Yebisa ye o comprendre te pe senga ye a phraser yango ndenge mosusu. Kosala eyano ata moke te. Soki oyebi likambo moko te to ozali na ntembe te, lobá bongo.

Tosala nini soki molimboli asali libunga?

Mosala ya mobongoli ezali ya kobongola na bosikisiki to na bosembo soki likoki ezali. Asengeli te kobakisa to kolongola eloko moko. Soki okanisi ete mobongoli asali libunga to ozali kososola te likambo oyo elobamaki na tango ya audience, ezali na ntina mingi koyebisa député.

Esengeli obenga député nini?

Okoki kobenga député « Monsieur » to « Madame » .

Ba boyoki ekomami na enregistrement?

Ba boyoki nionso ekomami na enregistrement. Soki ozwi ekateli ya mabe, okoki kosɛnga kopi ya enregistrement. Okoki kosalela enregistrement mpo na kolakisa oyo elobamaki na boyoki soki ozwi mokano ya kosala recours.

Osengeli kosala nini soki ozali koyoka nkanda to obandi kolela?

Komitungisa te, ezali mabe te koyoka nkanda to kolela na tango ya boyoki na yo ya asile. Soki obandi koyoka nkanda na ntango nyonso na ntango ya koyoka, ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kokitisa motema. Na ndakisa :

  • pema mozindo mbala 3 to 4
  • senga mai
  • senga mwa bopemi