Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Oyo etali boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.

Boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo ezali parti ya motuya pona lolenge ya esengi na yo ya ebombamelo. Na mokolo ya boyoki na yo, to sima na yango, bako yebisa yo soki ba ndimi to ba boyi esengi na yo ya ebombamelo.

Boyoki na yo eza chance pona kobeta lisolo na yo pe ko yebisa bango pona nini oza na besoin ya bobateli ya Kanadá.

Boyoki na yo ekoki komonana lokola tribunale mais ezali moins formel. Batu oyo ba décidaka na mokolo ya audience babengami ba Memberes pe bazali spécialement entraîné pona kokata na makambo oyo etali ba esengi ya ebombamelo. Moko ya ba Memberes akokata likambo na yo na bosembo nionso.

Ba boyoki ewumelaka entre 3 to 4 heures, kasi ekoki pe kozala mokuse to molayi koleka, edependaka na ba circonstances. Mingi mingi ba boyoki esalemaka na internet (virtuellement), pe misusu esalemaka na bilo ya IRB.