Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo.
Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Mibeko ya sika oyo ezali na likambo na boponomi ya esengeli ya ebombamelo

Kobanda na mokolo 26 sanza ya mibale ya mobu 2026, mibeko ya sika (mwango ya mobeko C-12) ezali na likambo na kondisyo ya boponomi ya mobeko ya mobombami na Kanada.

Mibeko ya sika ya boponomi

Mibeko oyo ya sika ezali kosala na ba demandes nyonso oyo bakotiya (kokitisa) kobanda na mokolo 3 sanza ya motoba 2025.

Esengeli na yo ekosalama te ete elongolama na Komisyo ya Bilo ya bato bakota na ba bima mboka (immigration) mpe ya statut ya mobombami (IRB) soki :

  • Otii (okitisi) demande na yo koleka mbula moko nsima ya kokota na yo ya liboso na Kanada (nsima ya mokolo 24 sanza ya motoba 2020), ata soki otiki mboka mpe ozongi na yango nsima.
  • Okoti na Kanada na kati ya ba ndelo mibale ya ba pointes ya koleka ya ba notaire public, mpe otii (okitisi) esengeli na yo koleka mikolo 14 nsima ya kokota na yo*

* Bobembani na ba mboka ya Tiers oyo ezali na Sékirité (STCA) ezali nanu na bokonzi. Soki okoti na Kanada na kati ya ba ndelo mibale ya ba pointes ya koleka ya ba notaire public, mpe otii (okitisi) demande na yo na kati ya mikolo 14, demande na yo ekosalama te ete ezwama mpo na bolongoli liboso ya IRB, longola soki ozali na ndéngé mosúsu na STCA.

Mpo na kozwa ba sango ya ndambo penepene na boponomi, tala site (ezibeli enene) ya IRCC :

Na ntina : IRCC mpe CBSA bakoluka koyeba ba demandes nyonso oyo batii (bakitisi) nsima ya mokolo 3 sanza ya motoba 2025. Soki demande na yo ezali na mibeko oyo ya sika, yo mpe ntoma to mongbende ya engebenena mobeko na yo bokoyamba. Sala ete IRB, IRCC, CBSA mpe ntoma to mongbende ya engebenena mobeko na yo baza na ba kontakte na yo ya ngonga ya sika.

Soki esengi na yo ekokisaka bandingisa te mpo na bolongoli liboso ya IRB

Soki esengi na yo ya ebombamelo ezwami te, bakobengana yo na Agence ya ba Services ya Frontière ya Kanada (CBSA). CBSA ekomeka koluka koyeba soki okoki kotiya (kokitisa) esengi ya momekano ya ba likama liboso ya bolongoli (PRRA).

PRRA ezali esengi oyo na yango ozali kosenga bobateli kontre bolongoli na mboka oyo okoki kozala na likama ya bonyokoli, bwale to ezalela ya mabe. PRRA ezali lisanga te na boyoki ya statut ya mobombami, kasi soki esengi na yo ezwami, okoki kozala moto oyo azali na bobateli.

Kozwa lisungi mpe ba sango

  • Tuna moto ya likanisi na molobeli to na ntoma to mongbende ya engebenena mobeko soki ozali na mituna etali kondisyo ya boponomi ya esengi ya ebombamelo to soki ozali na matata etali lolenge oyo esengi na yo ezali kokende.
  • Ba kompani oyo te ya mbulamatali (ONG) ya lisungi ya boyambi mpe ba lingomba lya bato ya esika bakoki kosunga yo na koyeba mibeko ya sika oyo mpe bakoki kokitana yo na ba ntoma to mongbende ya engebenena mobeko to na ba bozwi ya engébena mobeko.

Mpo na kozwa nkóndo ya ba lingomba lya bato ya etuka na yo, tala lokásá Ba bozwi ya bato ya esika.