Soki okoti Kanada na libongo ya bokɔti ya officiel, okoki kobanda esengi ya ebombamelo na Agence ya lisalisi ya ndelo ya Kanadá
- Aéroport International
- Molelo ya Nzela ya Makolo ya Officielle
- Port Maritime
Yebisa mosali ya CBSA ete olingi kosala esengi ya ebombamelo. Ako banda lolenge na yo.
Koyeba lolenge ya esengi ya ebombamelo na libongo ya bokoti
Tango oko yebisa mosali to officier ya CBSA ete olingi kosala esengi ya ebombamelo, a’kotuna yo mituna pona ko décider soki okoki to te kosala ango.
Mingi minigi bako remplir ba formulaires ya esengi ya ebombamelo na yo, bakozua ba mikanda na yo ya bowulani to pe pasepo, pe bako zua ba empreintes to misapi na yo, na photo.
Soki officier ya CBSA andimi que okoki kosala esengi ya ebombamelo, ako pesa yo:
- Mokanda ya Bobateli ya Mobombami (RPCD)
- Lettre oyo eza ko confirmer ete esengi na yo batindi ango epayi ya Komisyo ya Bilo ya bato bakota pe ya babombami ya Kanadá (IRB)
- Ba botangisi ya ndenge nini pe tango nini kotinda Formulaire ya Bosengi ya moboko (BOC)
- Ba botangisi ya ndenge nini pe tango nini oko compléter Ekzame ya bokono pona bilo ya bato bakota to Imigrasyon (IME)
Soki mosali ya CBSA akoki te ko déterminer kondimama na yo, ako pesa yo ba botangisi to bitindo po ozonga kosala masolo ya kondimama na mokolo mosusu. Na yango bakopesa yo:
- Mokanda ya Accusé de Réception ya Esengi ya ebombamelo
- Ba botangisi (instructions) ya ndenge nini pe tango nini oko compléter Ekzame ya bokono pona bilo ya bato bakota to Imigrasyon (IME)
- Ba botangisi (instruction) ya ndenge nini pe tango nini oko compléter formulaire ya esengi na yo ya bobombami – bakoki pe kosenga yo ete o compléter ba formulaires ango na nzela ya portail to site internet ya IRCC.
Na sima ya koleka na lisolo ya kondimama, soki ozali admissible, okozua Mokanda ya mosengi ya Bobateli ya Babombami, okozua pe lettre ya confirmation ete batindi esengi na yo na IRB, pe ba botangisi (instruction) na oyo etali kotinda formulaire BOC na yo.
Bokangami
CBSA akoki kokanga yo (ko placer yo na bobombi to detention) na bokomi na yo na libongo ya bokoti ya Kanada. Ekoki kozala pona CBSA:
- aza sûr te na bowulani na yo
- aza na kondimi te que oko zonga pona mituna mosusu
- andimi te que okoki kosala esengi ya ebombamelo pe alingi abengisa yo na mboka
- Akanisi que ozali dangereux
- ayebi que oza na casier judiciaire.
Soki bakangi yo, benga Ntoma na yo pona koyeba soki okoki kozua libération. Okoki kozala na bosémbo na Molobeli ya ofele to ya talo malonga grâce na mosongi engébena (aide juridique). Zua ba renseignements na oyo etali bokangami awa.
