Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Bokutani na ba Agences misato ya Mbulamatali

Eza na ba agences misato ya Mbulamatali oyo esalaka na babombami. Moko moko na ba agences eza na misala na ba responsabilités na’ngo.

  • Bilo ya bato bakota, Babombami mpe Bomwana-mbóka ya Kanadá (IRCC)
  • Agence ya lisalisi ya ndelo ya Kanadá (CBSA)
  • Komisyo ya Bilo ya bato bakota pe ya babombami ya Kanadá (IRB)

Ba agences wana ba zali mutu na mutu na ba sango na ye, oyo ba sangisaka automatiquement te.

Mosala ya IRCC

IRCC azali mokambi ya administration ya pologalámi ya imigrasyon ya Kanada.

Soki osali esengi na yo ya bobombami na kati ya Kanada, o’ko tindela ango IRCC.

IRCC ekotala soki esengi na yo ekoki kotindama na longolami. Soki masengi na yo endimami, bakopesa yango na IRB-RPD.

IRCC aza na mokumba ya:

Mosala ya CBSA

CBSA aza na mokumba ya kosali to pe kotinda na makasi mibeko ya imigrasyon ya Kanada.

Soki olingi kosenga ebombamelo na yo na Libongo ya ko kota (nzeala’a makolo, aéroport, to pe port ya mer) to pe epayi ba kangelaka ba paya, yebisa na officier moko ya CBSA que olingi kosala demande d’asile.

Soki CBSA eyoki yo, bakoki kozwa mokano ete esengi na yo ekokisi makoki oyo esengeli mpo na kotindama. CBSA elimbola mpo na yo ndenge nini okotia esengi na yo. Na nsima, CBSA ekotinda esengi na yo na IRB-RPD

CBSA mpé:

  • A controlaka pe ba milelo ya Kanada, pe azuaka mikano pona nani akoki ko kota pe nani akoki kokota te.
  • A tiaka libanda to a zongisaka ba esengi ya ebombamelo oyo ba koki ko fanda na Kanada te.

CBSA a koki ko kangisa yo na centre ya bobómbi soki:

  • Bazali sûrs na bowulani (identite) na yo te.
  • Bakanisi ete oza mutu ya misala mabe, to
  • Ete okoki te ko tosa mibeko ya imigrasyon.

Soki ba kangi yo na centre ya bobómbi, oza na bosémbo na molobeli to pe na Ntoma (représentant légal). Ba boyoki eko salama mingi pona ko landela bokangami na yo, pe koyeba soki ba koki kobimesa yo to te.

Tanga Soki ba Kangi Yo pona ba sango nyonso.

Mosala ya IRB

Pona nionso oyo etali imigrasyon pe babombami, IRB nde azuaka mikáno.

Soki IRCC to CBSA ba décider ete okoki kosala esengi na yo ya ebombamelo, bako tinda ango na IRB. IRB eza organisme ya liboso ya mbulamatali oyo e’examinaka pe e’decidaka soki okoki kosala esengi na yo ya ebombamelo. Eténi ya Bobateli ya Babombami (RPD) ya IRB, e’décidaka soki oko zua to te statut ya bobombami na Kanada.

IRB-RPD:

IRB aza lisusu na bitemi misato. Ekoki kozala:

Batela adresse na yo

Changez addresses na yo epayi ya IRB-RPD.

Adresse, limelo ya téléfon na email na yo.

Soki ozali komikomisa yo moko: Kotia mikanda na formulaire Boyebisa ya esika ya kiliya, Tinda formulaire oyo na IRB-RPD na nzela ya My Case. Soki ozali na nzela ya My Case te nano, tinda yango na e-mail

 

Bongola addresse na yo epayi ya IRCC

Pona kotia addresse na yo ya sika, kenda na Webform pe landa ba epémelo.

Ba mayele pona kokoma Webform:

  • Na nse ya “Lolenge ya bosengi”, pona “Kobongola ba sango ya ba kontakte”.
  • Luka limelo na yo ya UCI kati ya Mokanda ya Bobateli ya Mobombami to pe lettre oyo ewuti epayi ya IRCC.

Bogonla addresse na yo epayi CBSA

Soki CBSA akoti makambo ya libenga ya minkanda na yo ya bobombami, esengeli ete ba coordonnées ezali toujours à jours. Agent moko CBSA ako yebisa yo ndenge nini pe esika nini kosala mise à jourt ya ba coordonnées na yo epayi ya CBSA.


Étape suivante ya guide ya section: 2 Sala Action: Yekola, Sangisa mpe Bongisá