Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Ndenge ya Kotinda Bilembo to ba Elembo na Yo

Ba elembo esengelámí

Bilembo na yo nionso e’sengli e’zala na anglais to français. Soki ozali na ba mikanda na monoko mosusu, e’sengeli na yo kobongolisa ango na anglais to français. Soki oza na ba vidéos pe ba audios ya kobakisa, e’sengeli kokoma nionso oyo e’salemi pe e’lobami na ba vidéos pe ba audios wana. Makambo oyo o’kokoma, e’sengeli ba bongola ango na anglais to na français.

Oza na date limite pona kotinda bilembo na yo. Esengeli na yo kotinda ba elembo nionso na IRB-RPD, mikolo zomi liboso ya boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo. Tosa na bokebi date limite a’ngo.

Bilembo esengeli etindelama na format spécifique. Tanga na bokebi oyo ekomami na se pona koyeba mingi.

Soki oza na Ntoma (représentant légal)

Soki ozali na molobeli ya mobeko, ye nde akosala kotia mikanda na yo esika na yo. Pesa ye bikelekisaka na yo nyonso mpe mikanda. Akoki kosalisa yo koyeba mikanda nini ya ntina mpe akotinda yango na IRB-RPD. Keba kopesa ye ngonga ekokani.

Soki oza na Ntoma (représentant légal) te

Soki babengisaki yo kosalela My Case, osengeli kotia bikelekisaka na yo na nzela ya My case portal. Okosalela nzela mosusu te soki ozwi nzela ya ndingisa ya IRB-RPD te

Soki ozali komikomisa yo moko mpe ozwi te babengisi ya kosalela « My Case », okoki koleka kotinda mikanda na yo na e-mail (na mpe kozala) to na mokanda ya posita.

Ntango ozali kotinda bikelekisaka na yo, keba kokanisa matomba ya ntina oyo elandi:

  • Keba ete bilembo na yo nionso ezali na 8.5 x 11 pouces, papier format lettre. Bilembo oyo o’komaki esengeli ezala na taille de police 12 minimum.
  • Sangisa bilembo na yo pe numéroter bango banda oyo ya liboso ti na oyo ya suka.
  • Likolo ya couverture koma kombo na yo pe adresse, mokolo, limelo ya dossier na yo ya IRB-RPD, liste ya ba mikanda na yo nionso, na ba limelo ya lokásá.
  • Sala kopie ya enveloppe ya ba mikanda na yo. Bomba original.
  • Soki otindi ba elembo na yo na email, keba ete ezali na format PDF.

Tinda copie moko ya enveloppe to paquet ya ba elembo na yo epayi ya IRB-RPD ya région na yo. Région na yo edépendaka na ville esika ofandi. Soki loingi kofanda na mboka to région mosusu, senga batinda dossier na yo bisika okeyi.

Soki o’fandaka na British Columbia, Alberta, Saskatchewan, Manitoba, Yukon, Northwest Territories

Email

  • [email protected]
    • Luka kolanda botongi oyo na likebi nyonso: osengeli kotinda mikanda na yo na format PDF lokola biyokeli. Bonene ya fisi ya PDF esengeli koleka 20 Mo te. Na likambo ya e-mail, lakisa limelo na yo ya UCI (elongo na limelo na yo ya IRB-RPD mpe mokolo ya esambiselo, soki ezali) mpe lakisa polele ete bikelekisaka esangisami. Kokoma eloko te na nzoto ya e-mail.

Poste

Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

  • IRB-RPD, Minto Place, Canada Building 344 Slater Street, 12th Floor Ottawa, Ontario Canada, K1A 0K1I

    na moto moko

    • IRB–RPD, 300 West Georgia Street, Suite 1600 Vancouver, BC V6B 6C9
      • Soki o’fandaka na Vancouver o’koki ko pesa ba documents na yo en personne epayi ya IRB.

    Soki o’fandaka na Ontario (sauf na Ottawa na Kingston)

    Email

    • [email protected] ​​
      • Landela na bokebi nionso mibeko oyo: Esengeli na yo kotinda mikanda na yo lokola ba pièces jointes na format PDF. Ba fichiers PDF ango ekoki te koleka 20MB. Na ligne ya sujet, koma limelo na yo ya UCI (koma pe numéro na yo ya IRB-RPD pe mokolo ya boyoki na yo soki oza na yango), pe mikanda oyo ezali na pièces jointes. Kokokoma eloko mosusu te kati ya email.

    Poste

    Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

    • IRB-RPD, Minto Place, Canada Building 344 Slater Street, 12th Floor Ottawa, Ontario Canada, K1A 0K1

      na moto moko

      • 25 St. Clair Avenue East, Suite 400, Toronto, Ontario M4T 0A8
        • Soki o’fandaka na Toronto, o’koki ko pesa ba documents na yo en personne epayi ya IRB.

      Soki o’fandaka na Quebec, New Brunswick, Nova Scotia, Prince Edward Island, Newfoundland, Nunavut, Kingston (Ontario), Ottawa (Ontario)

      Email

      • [email protected]
        • Landela na bokebi nionso mibeko oyo: Esengeli na yo kotinda mikanda na yo lokola ba pièces jointes na format PDF. Ba fichiers PDF ango ekoki te koleka 20MB. Na ligne ya sujet, koma limelo na yo ya UCI (koma pe numéro na yo ya IRB-RPD pe mokolo ya boyoki na yo soki oza na yango), pe mikanda oyo ezali na pièces jointes. Kokokoma eloko mosusu te kati ya email.

      Poste

      Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

      • IRB-RPD, Minto Place, Canada Building 344 Slater Street, 12th Floor Ottawa, Ontario Canada, K1A 0K1

        En Personne

        • Guy-Favreau Complex, 200 René-Lévesque Blvd. West, East Tower, Room 102, Montréal, Quebec H2Z 1X4
          • Soki o’fandaka na Montréal, okoki ko pesa ba mikanda na yo en personne na IRB.

        Étape suivante ya guide ya section: 5.5 Basengi nionso baza na boyoki?