Bongama pona boyoki na Yo

Yekola bilembo nini okoki kosangisa pe kopesa liboso ya boyoki na yo ya demande ya asile. Yeba makambo nini Commision ya Immigration pe ya ba Réfugiés ezali koluka pona kozua ekateli pe ndenge nini bilembo na yo ekoki kosunga demande na yo ya asile.

Yekola ba Ndimbola ya Mibeko

Pona bandima esengi ya ebombamelo na yo, esengeli na yo ko prouver ete oza soit Mobombami ya Bobembani to Moto oyo aza na Besoin ya Bobateli. Sima ya kotanga ba mikanda pe koyoka lisolo na yo, Membere ya IRB-RPD moko ya IRB-RPD akozua ekateli.

Esengeli na yo ko comprendre ba ndombola (définitions) pe ndenge nini kosangisa ba elembo pona esunga esengi na yo.

Tanga ba partie nionso ya ba ndimbola. Pona partie nionso oyo ezali bosolo pona yo, sala liste ya ba elembo to pe ba preuves oyo okoki kozua pona kolakisa bosolo ya lisolo na yo. Pesa liste na ntoma oyo azali na bobateli na yo.

Mobombami ya Bobembani

Pona kozala Mobombami ya Bobembani, esengeli ete maloba motoba oyo ezala bosolo pona yo:

  • Soki na zongi mboka na nga, nako subir bonyokoli (bako maltraiter ngai).
  • Na kozala maltraité pona race, religion, ekolo, opinion politik, to pe pona groupe social na nga.
  • Naza pena na bomo ya ko zonga kuna.
  • Naza na tina kobanga makasi ya kofanda na mboka na ngai.
  • Mbulamatali na ngai ekoki ko batela ngai te.
  • Nakoki kofanda na kimia te na etando mobimba ya mboka na ngai.

Mutu oyo aza na Besoin ya bobateli

Pona bandima yo lokola moto oyo aza na besoin ya bobateli, esengeli na yo kolakisa ete 1 to 2 ezali ya solo.

  1. Soki na zongi mboka na nga, nako zala torturé epayi ya bakonzi ya mboka.   TO
  2. Soki na zongi mboka na ngai, nakoki kokufa, ba koki pe ko torturer to ko punir ngai, pe…
    • Mbulamatali na nga ekoki ko batela nga te,
    • Nakoki kofanda na kimia to na ndenge ya malamu te na région mosusu ya mboka,
    • Naza na danger oyo batu nionso te baza nagno na mboka na ngai.
    • Naza na likama te po kaka na salaki mabe, oyo ezali considéré na Kanadá lokola ligboma, pe
    • Naza na likama te po kaka système ya santé ya mboka na nga eza mabe.

Bongisa ba elembo

Esengeli na yo kokokisa pe kotinda ba elembo ya esengi nayo ya ebombamelo epayi ya IRB-RPD. Elembo ekoki kozala sango nionso oyo elakisi ete oza koloba vérité par rapport na bowulani na yo, oyo ekomelaki yo pe oyo oza kobanga ekomela yo soki ozongi mboka na yo. Elembo ekoki kozala mokanda, lettre, ba articles ya journal, ba rapports ya ba médecins to ya psychologue, ba photos, ba enregistrements audios, to pe ba vidéos.

Elembo ekoki kotinda Membere andima oyo ekomeli yo, à comprendre situation na yo na mboka na yo, pe pona nini okoki kozonga te.

Tango nini kokokisa ba elembo

Kokokisa ba elembo ezuaka temps, surtout soki oza komeka kozua yango na mboka mosusu. Banda kokokisa ba elembo bango. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, senga ye elembo nini ekoki kosunga dossier na yo, yebisa ye ba elembo nini oza nango, senga ye atunisa ba elembo na yo. Sala makambo oyo tout bango

Ba lisengeli ya bobongoli

Esengeli ba elembo na yo nionso, y compris ba enregistrements audios, ezala na Anglais to na Français. Ko utiliser Google Traduction te, pe kobongolisa ba mikanda na yo yo moko te. Eko zala malamu koluka mobongolisi ya professionnel. Soki oza na avocat ya aide juridique, bakoki ko couvrir partiellement to pe entièrement prix ya traduction. Soki okoki kofuta mobongolisi te, okoki kotuna moto oyo oza na confiance na ye, pe oyo a lobaka monoko ya mboka na yo pe Français to Anglais ya propre, abongolisa mibeko na yo.

Esengeli na molimboli na yo kolanda mokanda oyo esengeli na yo kotinda na IRB-RPD nzela moko na mibeko oyo obongolisaki. Esengeli mokanda ezala na:

  • Kombo ya mobóngoli,
  • Monoko to dialect (soki eza),
  • Lisakoli oyo elobi ete bobongoli ezali ya solo, mpe
  • signature ya mobongoli

Ba elembo à l’appui na yo

Eza na ba elembo miné oyo okoki kobongisa pona ko appuyer demande na yo.

Ba elembo ya bowulani na yo.

Esengeli na yo kozala na ba elembo ya bowulani pe ya mobotama na yo. Ekoki kozala:

  • pasepo,
  • Mokanda ya bowulani ya mboka.
  • acte de naissance,
  • certificat ya libala,
  • ba bulletins ya école, to pe ba diplômes,
  • permis de conduire,
  • identité militaire, to
  • adhésion professionnelle, to réligieuse,

Eza na ba elembo mosusu oyo ekoki kosunga. Tuna ntoma na yo ba elembo nini oko zala na besoin nango pona ko prouver bowulani na yo.

Ba elembo ya esengi na yo

Esengeli na yo kozala na ba elembo oyo elakisi ete:

  • Lisolo na yo pe ba événements ya lisolo na yo eza busolo.
  • Oza na bomo makasi ya kozonga mboka na yo
  • Oza en danger na mboka na yo
  • Mbulamatali na yo ekoki ko pesa yo te bobateli.
  • Okoki te kofanda na ville mosusu na mboka na yo

Mituna oyo ekoki kosunga yo pona kozua ba preuves pona demande na yo:

  • Est-ce que oza na ba photos, ba lettres, ba vidéos, ba emails, ba textos, to ba documents mosusu oyo ekoki ko prouver ba problèmes oyo ozalaki nango na mboka na yo?
  • Est-ce que okendeki na police to ba agences ya mbulamatali pona kosenga lisungi? Meka kozua copie ya rapport de police to elembo ya visite na yo epayi na bango.
  • Est-ce que ozuaki aide médicale? Meka kozua Kopie ya rapport ya hôpital to ya médecin.
  • Est-ce que eza na ba articles ya journal to ba postes na internet à propos ya bato to ba événements oyo eza en lien na esengi na yo?
  • Est-ce que eza a bato oyo bamonaki makambo oyo ekomelaki yo? Senga bango ba koma esakola na bango et ba tinda yo ango. Soki ekoki kosalema, senga bango ba loba liboso ya avocat to notaire. Senga bango pe ba tinda yo copie ya Mokanda ya bowulani (pièce d’identité) na bango.
  • Est-ce que eza na bato oyo bakutanaki na même problème na yo? Senga bango ba koma lisolo na bango. Soki ekoki kosalema, senga bango ba loba liboso ya molobeli to notaire ete lisolo na bango eza bosolo.
  • Est-ce que demande na yo eza basé likolo ya groupe religieux to groupe politique na yo, to pe ba groupes mosusu epayi oza membre? Luka ozua ba mokanda oyo eko lakisa ete oza membre ya ba groupes ango.
  • Est-ce que oza na ba problème mentaux cause na oyo elakaki na vie na yo? Luka ozua rapport epayi ya docteur, psychologue, to conseiller na Canada. Ekoki kozua yo temps ebele, eko zala malamu osala ango noki.
  • Est-ce que oza na réseaux sociaux? Kanga ba captures ya ba postes nionso oyo eza en lien direct na lisolo na yo.

Ekoki pe kozala ete okoki te kozua ba elembo nionso oyo ewuti mboka na yo, po ezali likama, to po eza pasi kozua yango kuna. Sala nionso oyo okoki kosala pona kozua ba elembo yango, pe soki okoki kozua elembo moko te, koma na IRB pona koyebisa bango pona nini okoki te kozua ba elembo yango.

Ba elembo ya ba réalités ya mboka na yo

Okoki kotinda ba elembo oyo elakisi ba réalités ya mboka na yo pe ndenge nini eza na yango na lisolo ya esengi na yo. Ekoki kozala ba rapports fiables ya makambo politiques, sociales, culturelles, économiques, pe ba droits ya mutu na mboka na yo.

IRB-RPD aza na ba documents public ya ba conditions ya ba mboka nionso ya mokili na Paquets de Documentation Nationale (NDPs).

Zala na bokebi! Ba mikanda mosusu oyo ezali na NDP ekoki kozala ya kala. Ekoki kozala ete ba conditions na mboka na yo e changer to makambo oyo ekomelaki yo ekoki to pe te kozala na NDP. Loba na ntoma oyo azali na bobateli pona koyeba ba información nini ekoki kosunga esengi na yo.

Par exemple, okoki kotinda

  • ba articles ya journaux récents to ba vidéos.
  • Ba lisakoli ya ba temwe ya experts.
  • ba articles académiques, to
  • ba rapports ya droits de l’Homme.

Tanga ba Paquets ya Documentation Nationale ya mboka na yo.

Ba elembo ya ba temwé

Okoki kozala na ba temwé oyo bako loba par rapport na lisolo na yo, na boyoki na yo. Temwé to motatoli aza moto oyo aza na ba información importantes na oyo etali yo pe esengi na yo. Mokolo ya boyoki na yo, ba temwé na yo bako répondre na mituna ya molobeli na yo, pe na mituna ya Membre. Ba temwé bakoki te koyoka témoignage na yo te mokolo ya boyoki, pe okoki te kosolola na bango na tango ya pause. Parfois, Membre akoki kozala na posa te ya kosenga ba temwé na yo baloba.

Soki oza na ba temwé, pesa IRB-RPD ba información oyo elandi, mikolo zomi liboso ya boyoki na yo:

  • Ba información na bango ya contact (adresse, numéro ya téléphone, pe numéro ya fax).
  • Lisakoli ya mokuse pona ko expliquer pona nini bako loba na boyoki na yo.
  • Tango nini okanisi ete bakoloba
  • Relation na yo na bango
  • Soki bako loba en présentiel, par vidéoconférence, to par téléphone
  • Soki bako zala na besoin ya mobongoli, pe monoko to dialect oyo ba lobaka
  • Soki temwé na yo aza erbasi, pesa ba información ya ba qualifications na ye, résumé ya makambo ako loba oyo ako signer ye moko.

Esengi na yo pe Makambo ya Mibeko.

Membere ya IRB-RPD atalaka makambo oyo etali likambo na yo e makambo oyo ezali koleka na mboka na yo pona kokata soki oza na besoin ya bobateli. Ezali na makambo ya mibeko ya motuya, oyo Membere akoki kolobela na boyoki na yo ya bobombami. Tanga makambo yango ya mibeko na sekiso oyo ezali na se.

Esengeli na yo olakisa ete bowulani na yo eza pena oyo ya yo. Elingi koloba, esengeli na yo olakisa ba mikanda oyo ezali komonisa ete ozali mobotama ya mboka na yo. Esengeli na yo pe olakisa ba mikanda ya statut na yo ya immigration soki ofandaki na mboka mosusu.

Ekoki pe kozala important kolakisa religion na yo, to ekolo na yo, mosala na yo, appartenance politique to syndicale na yo, orientation sexuelle na yo, to appartenance na yo na lingomba social.

Soki okoki te kozua ba mikanda mosusu oyo ekolakisa bowulani na yo, esengeli omonisa yango na boyoki na yo. Mokolo ya boyoki, okoki koyebisa ndenge nini omekaki kozua ba elembo.

Ndakisa ya elembo

Awa okozua ba ndakisa ya ba elembo okoki kobongisa pona ko prouver bowulani na yo:

  • Pona ko prouver ete ozali mobotama ya mboka na yo:
    • Pasepo
    • Mokanda ya bowulani nayo ya mboka
    • Carte ya service militaire
    • Certificat ya libala
    • Ba bulletins ya école
    • Ba motango na mboka na yo, oyo bayebi yo to libota na yo.
  • Pona ko prouver religion na yo:
    • Certificat ya baptême
    • Lettre oyo mosali ya Nzambe na yo akomeli
  • Pona ko prouver groupe politique to professionnel na yo:
    • Carte membre ya partie politique to groupe professionnel na yo
    • Mokanda ya organisyon
    • Ba relevés de notes oyo elakisi formation professionnelle
    • Ba registres ya entreprise
    • Ba diplômes
  • Pona ko prouver orientation sexuelle na yo:
    • Lettre ya etonga ya bato, groupe, partenaire (mobali to muasi na yo), to membre ya famille na yo.
    • Ba temwe oyo bakoki kopesa ba détails na oyo etali appartenance na yo na lingomba LGBTQ.

Esengeli na yo olakisa ete ozali koloba makambo ya solo pe ete ba elembo na yo nionso ezali ya solo.

Pona ko décider soki akoki kondima lisolo na yo, esengeli na Membre ya IRB-RPD amona ete ba información nionso na yo ezali ya kokokisama. Membre ako comparer:

  • Formulaire BOC na yo, pe lisolo na yo

  • Ba elembo na yo,
  • oyo okoloba na boyokani na yo,
  • oyo ba temwé na yo bakoloba, pe
  • ba articles de presse, pe ba rapports na oyo etali ba droits de l’Homme.

Soki eza na ba différences oyo okoki te ko expliquer, Membre akoki ko décider ete akoki te kondima lisolo na yo. Yango ekoki kobebisa ba tentatives na yo nionso ya kofanda na Kanadá.

Ba ndakisa ya ba elembo

Tanga ba ndakisa oyo pona koyeba ba elembo nini okoki kobongisa pona komonisa ete ozali koloba vérité pe ete oza moto ya kondimama.

  • Ba rapports ya mboka na yo, pe ba articles de presse na oyo etali moniokoli ya ba droits de l’Homme
  • Ba rapports to ba reçus ya bokono/d’hôpital.
  • Ba rapports ya police
  • Ba photos ya ba blessures (to ba pota)
  • Ba lisakoli ya ba temwé
  • Mokanda ya docteur na yo na Kanadá na oyo etali ba cicatrices to ba blessures.
  • Ba captures d’écran ya ba réseaux sociaux
  • Ba catures d’écrans ya ba messages texts (SMS)oyo elakisi ete oza menacé.

Mayele oyo ekosunga yo na kolakisa ete oza koloba vérité, na audience na yo:

  • Zala na ba preuves oyo eko lakisa ete ba détails mosusu ya lisolo na yo baza ya solo.
  • Zala na bokebi, ko exagérer to ko embellir lisolo na yo te.
  • Ko répondre te na mituna oyo o’comprendre te.
  • Soki o’comprendre motuna moko te, senga Membere à se répéter to a reformuler motuna ango.
  • Zala na bosolo. Kokanga makanisi te.
  • Yanola na maloba molai pe maloba ya complet, po Membere akoka ko comprendre yo malamu.
  • Pona ba motango na yo na bokebi nionso. Yebisa bango ete esengeli baloba bosolo. Talisa bango ete Membere akolinga ete makambo nionso oyo bako loba, ekokana na oyo yo olobi. Okoki kopesa na ba motango na yo photocopie moko ya ba elembo na yo.

Esengeli olakisa ete oza na kobanga makasi mabe oyo ekoki kokomela yo soki ozongi na mboka na yo. Ba bengaka yango “kobanga ya subjectif”. Tala ba ndakisa ya ba mituna oyo Membre akoki kotuna yo:

  • Sima ya makambo mabe oyo basalaki yo na mboka na yo, pona nini obimaki mboka na yo noki te?
  • Pona nini olekaki na mboka mosusu ya sûr na nzela ya kokoma na Kanadá (lokola États-Unis par exemple), kasi osali esengi na yo kuna te?
  • Pona nini ozongaki mboka na yo sima ya bima?
  • Pona ozelaki, sima ya kokoma na Kanadá, avant osala esengi na yo?

Sosola malamu mituna pe biyano na yo. Bongama na ndenge nionso okoki liboso ya boyoki na yo. Ozali na ba elembo oyo ekosunga yo pona kopesa ba explications to biyano na makambo oyo osalaki to pe osalaki te? Par exemple, est-ce que ozalaki na kolikia ete makambo na mboka na yo ekokaki kobonguama? Est-ce que ezalaki pasi kobima na mboka na yo?

Ba ndakisa ya ba elembo

Tanga ba ndakisa oyo ya ba elembo okoki kobongisa pona esunga yo na kolakisa pona nini ozali na bomo ya kozonga mboka na yo:

  • Ba rapports ya police oyo elakisi ete osengaki lisungi ya police to ofundaki crime oyo esalamaki contre yo.
  • Ba rapports ya docteur ya bokono to ba blessures na yo.
  • Ba elembo oyo elakisi ete omekaki kokima likama (lokola ba billets, ba reçus, mikanda ya mobembo).
  • Ba lisakoli ya ba motango oyo elobi ete omekaki ko se protéger par rapport na ba menaces.
  • Ba información oyo obombaki na oyo etali kosala esengi ya ebombamelo na mboka mosusu.
  • Mikanda oyo elakisi pona nini okokaki te kobima mboka na yo noki
  • Mikanda oyo elakisi ete ezalaki pasi kosala esengi ya ebombamelo tango okomaki sika na Kanadá.
  • Elembo ya koya na yo pe entrée na yo na Kanadá.

Esengeli na yo olakisa ete oza na risque ya kozala persécuté to mabe ekoki kokomela yo na mboka na yo. Esengeli olakisa ete eza risque oyo ekoki te kokomela batu nionso na mboka na yo. Par exemple, soki violence eza epayi nionso na mboka na yo, esengeli olakisa pona nini yo particulièrement oza na risque. Soki okoki, meka ko pesa kombo ya moto (to ya lingomba) oyo alingi asala yo mabe, pona nini alingi asala yo mabe, pe ndenge nini oyebi ango.

Esengeli olakisa ete oza na risque par rapport na race, religion, nationalité, opinion politique, to appartenance na yo na lingomba social. Oyo ebengami ba motifs ya Bobembani. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, tuna bango motifi (to ba motifs) nini ekoki ko s’appliquer na yo.

Ba ndakisa ya ba elembo

Tanga ba ndakisa oyo ya ba elembo okoki kobongisa pona kolakisa ete oza na risque ya kozala na likama na mboka na yo:

  • Ba notes, lettres, textes, to ba messages ya ba menaces violentes.
  • Ba lisakoli officiel ya ba temwe oyo elobi ete yo, to bato lokola yo, baza ba victimes ya ba violences.
  • Ba photos ya ba pota to ba dommages
  • Ba photos ya ba pillages to ba dommages omonaki (to o participaki)
  • Ba rapports ya bokono
  • Ba rapports ya police ya mboka na yo
  • Réseau social to ba elembo vidéos (soki moto aza koloba na kati ya vidéo, esengeli kokoma nini elobami kati ya vidéo, pe kobongisa yango na Anglais to na Français).

Esengeli olakisa ete mbulamatali na yo akoki te pe akokoka te kobatela yo.

Soki omekaki kozua lisungi ya ba autorités ya mboka na yo, kasi pesaki yo ango te:

  • Yebisa exactement nini osalaki pona kozua lisungi, pe ndenge nini ba autorités ba répondaki.
  • Meka kozua ba mikanda oyo ekolakisa ete omekaki kozua lisungi.
  • Meka kozua ba rapports ya mboka na yo oyo ekolakisa ete ba autorités ya mboka bakoki te to bakolinga te ko batela batu lokola yo.

Soki omekaki kosenga TE lisungi ya ba autorités ya mboka na yo:

  • Expliquez pona nini okaki kozua linsungi na mboka na yo te, pe meka kozua ba documents oyo eko lakisa ete elingaki ezala mabe pona yo, soki omekaki koluka lisungi na mboka na yo.
  • Pesa ba ndakisa ya makambo oyo ekomeli batu mosusu oyo bamekaki kozua lisungi na mboka na yo.

Ba ndakisa ya ba elembo

Tanga ba ndakisa ya ba elembo oyo elandi pona koyeba ba elembo nini okoki kobongisa pona kolakisa ete mbulamatali na yo ekokaki te ko batela yo:

  • Ba rapports ya mboka to ba articles ya presse oyo elakisi ete mbulamatali eza corrompu to absence ya bobateli policière na mboka.
  • Ba rapports oyo osalaki epayi ya police
  • Ba lisakoli ya batu oyo baza na situation moko na yo. (Ekozala malamu soki bakoki koloba liboso ya molobeli to notaire. ete lisakoli na bango eza bosolo. Senga pe mokanda ya bowulani na bango.)

Esengeli olakisa ete ezali na esika moko te ya sûr to esika epayi okoki kofanda na mboka na yo.

IRB-RPD akoki kopesa yo kombo ya ville moko na mboka na yo epayi bakanisi ete okokoka kofanda kuna na kimia. Ba bengaka ango “fuite alternative en interne”. Esengeli olakisa:

  • okokoka te kofanda na ville ango na kimia
  • Ekozala pena kozanga mayele po ofanda kuna (pona mbula na yo, sexe na yo to pe situation na yo, par exemple).

Ba ndakisa ya ba elembo

Ba exemples ya ba elembo oyo okoki kobongisa pona kolakisa pona nini okokoi te kofanda na kimia na eteni mosusu ya mboka na yo:

  • Mikanda oyo eko lakisa ete okendeki kofanda na eteni mosusu ya mboka na yo pona kokima problème okutanaki nango.
  • Ba rapports oyo ekolakisa ete eloko oyo oza kobanga ezali partout na mboka mobimba. Par exemple, batu oyo oza kobanga bazali bisika nionso kati ya mboka, to, mabe oyo ozali kobanga ekoki kokomela esika nionso kati ya mboka na yo.
  • Ba rapports oyo eza kolakisa ete eza pasi pona mutu lokola yo kofanda na ville nionso ya mboka na yo. Par exemple, ba rapports oyo eza komonisa culture ya mboka na yo to kolakisa ete ville wana eza na ba problèmes ya makasi.
  • Ba mokanda ya baninga to ba libota na yo oyo basungaki yo na kombabana na bisika ya mboka na yo
  • Ba rapports oyo elakisi ete eza na nzela moko te pona kokoma na région ango, pona guerre, catastrophe naturelle, to ba raisons mosusu.

IRB-RPD akoki koboya esengi na yo pona criminalité. Ebengami exclusion. Ekoki kokomela yo soki IRB-RPD akinisi ete:

  • o commettaki crime de guerre,
  • o commettaki crime non-politique ya makasi libanda ya Kanada, to
  • o violaki moko ya ba lois internationales na oyo etali Droit de l’Homme.

Eko zala malamu mingi o’solola na molobeli soki IRB-RPD ayebisi yo ete bako évaluer criminalité par rapport na eseni na yo ya ebombamelo.

Ba ndakisa ya ba elembo

Tanga ba ndakisa oyo ya ba elembo oyo okoki kobongisa soki IRB-RPD alobi ete ozalaki impliqué na ligboma:

  • Extrait ya casier judiciaire na yo
  • Ba rapports ya police ya premier témoignage na yo
  • Ba lisakoli ya ba motango na oyo etali plainte na yo.
  • Opinion ya molobeli na mboka na yo.

Soki osalaki esengi ya ebombamelo te tango okomaki na Kanadá, esengeli o expliquer pona nini ozelaki avant osala yango. Bakoki kotuna yo pona kolakisa pona nini obimaki mboka na yo noki te, pona nini osengaki ebombamelo na mboka mosusu te, to pona nini osengaki ebombamelo te mokolo okomaki na Kanadá.

Ekozala malamu okanisa ndenge nini okoyanola mituna oyo, pona IRB-RPD akoki pe kondima te ete oza na bomo ya solo ya kozonga mboka na yo soki ozelaki tango molayi pona kosala esengi na yo.

Soki osalaki demande na yo noki te, tanga mituna oyo pona esunga yo pona ko expliquer ba raisons na yo:

  • Est-ce que okomi na bomo ya kozonga mboka na yo sima ya kokoma na Kanada?
  • Est-ce que oyebaki te ete il fallait osala esengi na yo ya ebombamelo tango okamki na Kanada?
  • Est-ce que ezalaki pasi pona kosala esengui na yo to kozua ntoma pona yo?
  • Est-ce que oyebaki te ndenge nini kosala esengi na yo pe ezuaki yo tango molayi pona koyeba yango?

Pesa ba détails pe meka ko expliquer situation to ba circonstances na yo. Mibongisa pona koyanola mituna oyo Membre akoki kozala nango par rapport na ba raisons oyo etindi yo ozela avant osala esengi na yo, mokolo ya boyoki na yo.

Ndenge ya Kotinda Bilembo to ba Elembo na Yo

Ba elembo esengelámí

Bilembo na yo nionso e’sengli e’zala na anglais to français. Soki ozali na ba mikanda na monoko mosusu, e’sengeli na yo kobongolisa ango na anglais to français. Soki oza na ba vidéos pe ba audios ya kobakisa, e’sengeli kokoma nionso oyo e’salemi pe e’lobami na ba vidéos pe ba audios wana. Makambo oyo o’kokoma, e’sengeli ba bongola ango na anglais to na français.

Oza na date limite pona kotinda bilembo na yo. Esengeli na yo kotinda ba elembo nionso na IRB-RPD, mikolo zomi liboso ya boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo. Tosa na bokebi date limite a’ngo.

Bilembo esengeli etindelama na format spécifique. Tanga na bokebi oyo ekomami na se pona koyeba mingi.

Soki oza na Ntoma (représentant légal)

Soki ozali na Ntoma (représentant légal), normalement ye nde atindaka ba mikanda na place na yo. Kotinda eloko te na IRB-RPD soki nanu olakisi yango na représentant légal na yo te. Akoki kosunga yo na ko pona ba mikanda nini ya motuya akoki kotinda. Esengeli kopesa ye tango molayi.

Soki oza na Ntoma (représentant légal) te

Bilembo to bilembo ekoki kotindama na ndenge ebele. O’koki kotinda bilembo na poste, email, fax, messager, to na bomutu na ba villes misusu. Soki otindi bilembo na yo, keba na makambo elandi:

  • Keba ete bilembo na yo nionso ezali na 8.5 x 11 pouces, papier format lettre. Bilembo oyo o’komaki esengeli ezala na taille de police 12 minimum.
  • Sangisa bilembo na yo pe numéroter bango banda oyo ya liboso ti na oyo ya suka.
  • Likolo ya couverture koma kombo na yo pe adresse, mokolo, limelo ya dossier na yo ya IRB-RPD, liste ya ba mikanda na yo nionso, na ba limelo ya lokásá.
  • Sala kopie ya enveloppe ya ba mikanda na yo. Bomba original.
  • Soki otindi ba elembo na yo na email, keba ete ezali na format PDF.

Tinda copie moko ya enveloppe to paquet ya ba elembo na yo epayi ya IRB-RPD ya région na yo. Région na yo edépendaka na ville esika ofandi. Soki loingi kofanda na mboka to région mosusu, senga batinda dossier na yo bisika okeyi.

Soki o’fandaka na British Columbia, Alberta, Saskatchewan, Manitoba, Yukon, Northwest Territories

Email

  • [email protected]
    • Landela na bokebi nionso mibeko oyo: Esengeli na yo kotinda mikanda na yo lokola ba pièces jointes na format PDF. Ba fichiers PDF ango ekoki te koleka 20MB. Na ligne ya sujet, koma limelo na yo ya UCI (koma pe numéro na yo ya IRB-RPD pe mokolo ya boyoki na yo soki oza na yango), pe mikanda oyo ezali na pièces jointes. Kokokoma eloko mosusu te kati ya email.

Poste

  • IRB–RPD, 300 West Georgia Street, Suite 1600 Vancouver, BC V6B 6C9
    • Bomba ba originaux ya ba mikanda na yo nionso. Tinda enveloppe na yo ya ba mikanda na nzela ya Bilo de Poste ya Poste Canada. Senga ete ba tinda’ngo na service ya priorité. E’kosenga ete o’futa ba frais. Bakopesa yo reçus pe o’koki kolanda bokomi ya dossier na yo. Tinda enveloppe ya ba mikanda na yo noki pona e’koma pe noki.

Fax

  • Fax number: 604-666-3043
    • O’koki kotinda kaka ba mikanda oyo ezali na moins de 50 lokásá.
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe preuve oyo elakisi ete o faxer bango.

Soumission électronique.

  • Ntoma (Représentant légale) na yo akoki kotinda ba mikanda na yo na nzela ya oyo ebengami e-post Connect ya Poste Kanada.

Courier

  • IRB–RPD, 300 West Georgia Street, Suite 1600 Vancouver, BC V6B 6C9
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

En personne

  • IRB–RPD, 300 West Georgia Street, Suite 1600 Vancouver, BC V6B 6C9
    • Soki o’fandaka na Vancouver o’koki ko pesa ba documents na yo en personne epayi ya IRB.

Soki o’fandaka na Ontario (sauf na Ottawa na Kingston)

Email

  • [email protected] ​​
    • Landela na bokebi nionso mibeko oyo: Esengeli na yo kotinda mikanda na yo lokola ba pièces jointes na format PDF. Ba fichiers PDF ango ekoki te koleka 20MB. Na ligne ya sujet, koma limelo na yo ya UCI (koma pe numéro na yo ya IRB-RPD pe mokolo ya boyoki na yo soki oza na yango), pe mikanda oyo ezali na pièces jointes. Kokokoma eloko mosusu te kati ya email.

Poste

  • 25 St. Clair Avenue East, Suite 400, Toronto, Ontario M4T 0A8
    • Bomba ba originaux ya ba mikanda na yo nionso. Tinda enveloppe na yo ya ba mikanda na nzela ya Bilo de Poste ya Poste Canada. Senga ete ba tinda’ngo na service ya priorité. E’kosenga ete o’futa ba frais. Bakopesa yo reçus pe o’koki kolanda bokomi ya dossier na yo. Tinda enveloppe ya ba mikanda na yo noki pona e’koma pe noki.

Fax

  • Fax numbers: 416-954-1165, 416-973-9307, or 416-973-4013
    • O’koki kotinda kaka ba documents oyo ezali na moins de 50 pages.
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe elembo oyo elakisi ete o faxer bango.

Soumission électronique.

  • Ntoma (Représentant légale) na yo akoki kotinda ba mikanda na yo na nzela ya oyo ebengami e-post Connect ya Poste Kanada.

Courier

  • 25 St. Clair Avenue East, Suite 400, Toronto, Ontario M4T 0A8
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

En Personne

  • 25 St. Clair Avenue East, Suite 400, Toronto, Ontario M4T 0A8
    • Soki o’fandaka na Toronto, o’koki ko pesa ba documents na yo en personne epayi ya IRB.

Soki o’fandaka na Quebec, New Brunswick, Nova Scotia, Prince Edward Island, Newfoundland, Nunavut, Kingston (Ontario), Ottawa (Ontario)

Email

  • [email protected]
    • Landela na bokebi nionso mibeko oyo: Esengeli na yo kotinda mikanda na yo lokola ba pièces jointes na format PDF. Ba fichiers PDF ango ekoki te koleka 20MB. Na ligne ya sujet, koma limelo na yo ya UCI (koma pe numéro na yo ya IRB-RPD pe mokolo ya boyoki na yo soki oza na yango), pe mikanda oyo ezali na pièces jointes. Kokokoma eloko mosusu te kati ya email.

Poste

  • IRB-RPD, Guy-Favreau​ Complex, 200 René-Lévesque Blvd. West, East Tower, Room 102, Montréal, Quebec H2Z 1X4
    • Bomba ba originaux ya ba mikanda na yo nionso. Tinda enveloppe na yo ya ba mikanda na nzela ya Bilo de Poste ya Poste Canada. Senga ete ba tinda’ngo na service ya priorité. E’kosenga ete o’futa ba frais. Bakopesa yo reçus pe o’koki kolanda bokomi ya dossier na yo. Tinda enveloppe ya ba mikanda na yo noki pona e’koma pe noki.

Fax

  • Fax number: 514-283-0164
    • O’koki kotinda kaka ba documents oyo ezali na moins de 50 pages.
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe elembo oyo elakisi ete o faxer bango.

Soumission électronique.

  • Ntoma (Représentant légale) na yo akoki kotinda ba mikanda na yo na nzela ya oyo ebengami e-post Connect ya Poste Kanada.

Courier

  • IRB-RPD, Guy-Favreau Complex, 200 René-Lévesque Blvd. West, East Tower, Room 102, Montréal, Quebec H2Z 1X4
    • Bomba ba mikanda originaux na yo pe reçu.

En Personne

  • Guy-Favreau Complex, 200 René-Lévesque Blvd. West, East Tower, Room 102, Montréal, Quebec H2Z 1X4
    • Soki o’fandaka na Montréal, okoki ko pesa ba mikanda na yo en personne na IRB.

Basengi nionso baza na boyoki?

IRB-RPD ezwa mokano ya bosengi mosusu ya kobombana na mboka mopaya kozanga boyokani to na boyokani ya mokuse. Yango babengaka yango procédure ya ebombamelo oyo ezali moins complexe. IRB-RPD ekoki koyeba yo mpo na procédure oyo soki :

  • Ba esengi lokola oyo ya yo to oyo ewutaka na mboka na yo endimami mingi, .
  • ezali mpasi te mpo na koyeba bowulani na yo,
  • Ba elembo ya likama na yo ezali polele mpe pete, mpe
  • ezali mbala mosusu te ete likambo moko ya mindɔndɔ ekobima.

IRB-RPD ekoki kozwa mokano ete:

  • boyokani esengeli te mpo na kondima bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya, to
  • bobele boyokani ya mokuse nde esengeli mpo na kozwa ekateli na ntina ya bosenga na yo.

Ba esengi e décidé sans boyoki

Soki IRB-RPD emoni ete ekoki kozwa ekateli ya bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya kozanga kosala audience, ekotindela yo liyebisi oyo ezali kolakisa ete bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya ezali na nzela ya botali dossier (FRP)). Na liyebisi oyo, IRB-RPD ekosenga yo to momonisi na yo atinda bilembeteli mosusu nyonso oyo ozali na yango. Esengeli pe otia sinyatili na formulaire ya confirmation pe ozongisa yango na ba elembo na yo.

Ntango IRB-RPD ezwi formulaire na yo, etalaka dossier na yo. Akoki moko to mosusu

  • Ndima bosenga na yo sans audience. Yo to momonisi na yo ya mibeko okozwa liyebisi ya mokano oyo ekomonisa ete bosengi na yo endimami, to
  • Bozwa mokano ete boyokani to bosambisi ya mokuse esengeli mpo na kozwa mokano na ntina ya bosengi na yo. Okozwa mokanda oyo ezali na makambo ya mikemike ya boyoki na yo.

Ba esengi oyo ekoki kozala na boyoki mokuse

Boyoki ya momesano eumelaka ngonga 3 to 4, nzokande audition ya mokuse eumelaka kaka ngonga 1 to 2. IRB-RPD ekoki kopesa yo boyokani ya ntango mokuse na makambo oyo elandi

  • mingi ya ba demandes oyo ewutaka na mboka na yo endimami to endimami TE (i.e. ezali na taux ya acceptation ya likolo mingi to ya nse mingi), .
  • bosenga na yo etali kaka motuna moko to mibale ya ntina, mpe
  • mituna ya mindondo ezali te na esengi na yo.

Soki IRB-RPD ekanisi ete bosengi na yo ekoki kosalama na tango ya boyokani ya mokuse, ekotindela yo mokanda ya kobengisama ya sipesiale. Soki okanisi ete boyoki na yo esengeli koleka ngonga mibale, sɛngá mbala moko boyoki molai mpe limbolá mpo na nini. Soki IRB-RPD endimi, bakopesa yo boyokani ya ntango molai kaka mokolo wana to na mokolo mosusu.

Ba esengi oyo ekoki kozala sujet ya audience mokuse te

Lisengi na yo ekoki kosala likambo ya kozwa te sima ya kosa ya soki

  • Conseil ya ministre alingi ko intervenir mpo na kotelemela bosenga na yo na tango ya boyoki na yo.
  • IRB-RPD elakisaki ministre ete bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya ekoki kobimisa mokakatano monene.

Mibongisa pona boyoki na yo

Eza na ba ndenge ebele ya importants ya komibongisa pona mokolo ya audience na yo. Audience ezali chance na yo ya kokutana na Membre ya IRB-RPD pe koyanola mituna na oyo etali lisolo na yo. Kozua temps pona komibongisa eko sunga yo na ko se sentir na controle ya procédure.

S’entraîner na koyanola mituna

Ndenge moko ya komibongisa pona boyoki na yo ezali préparation to répétition ya ba réponses na yo pona mituna Membre akoki kozala nango pona yo. Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, okoki kosenga bango basala préparation to répétition ango na yo avant boyoki na yo. Tuna bango mituna nini bakoki kotuna yo mokolo ya boyoki, pe ndenge nini okoki koyanola. Ekozala malamu pona yo komibongisa pona koyanola mituna!

Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli te, okoki kotanga lisusu mikanda BOC na yo, lisolo na yo, pe ba elembo oyo otindaki (to o soumettaki). Kanisa ndenge nini okoki koyanola mituna na makambo oyo ekomami kati ya mikanda na yo.

Okoki ko s’entraîner na koyanola mituna na oyo etali:

  • ba incohérences ya lisolo to ya mikanda na yo
  • ba parties mosusu ya lisolo na yo
  • pona nini okanisi ete oko na danger soki ozongi mboka na yo
  • soki okoki kofanda na kimia na région mosusu ya mboka na yo
  • Ba mokano oyo ozui lokola, pona nini obimaki na mboka na yo tango wana pe pona nini okaki te kobima na mboka na yo avant, to pona nini ozelaki avant osala esengi ya ebombamelo na Kanadá.

Okoki pe komibongisa pona koyanola mituna oyo o’comprendre te to oyo oyebi te. Soki Membere atuni yo motuna oyo o’comprendre te, komeka te koyanola ango. Yebisa Membre ete o’comprendre motuna na ye te pe senga ye a tuna motuna ango na ndenge mosusu. Ko inventer biyano te. Soki oyebi makambo te to soki oza sûr(e) na makambo te, loba ango.

Mema ba mikanda na yo nionso

Esengeli na yo omema mikanda nyonso pe ba elembo nionso oyo otindaki IRB-RPD mokolo ya boyoki na yo. Bongisa pe tia na ordre mikanda na yo nionso na kati ya clasiers moko pe mema yango mokolo ya boyoki na yo. Esengeli na yo komema:

  • formulaire BOC
  • lisolo
  • ba formulaires ya imigrasyon
  • ba elembo
  • Lettre ya Notification ya Convocation

Membre ako pekisa yo otanga mikanda na yo pona koyanola mituna na ye. Mais, esengeli na yo komema mikanda yango quand même mpo Membre akoki pe koloba na yo otanga mikanda yango. Par exemple, na ebandeli ya boyoki na yo, Membre akosenga yo otala signature oyo eza na mikanda BOC na yo. Akoki pe kosenga yo otanga ba partie spécifiques ya mikanda na yo soki baza na mituna pona ba partie yango.

Kende na Ebongámí mpo na boyoki (Ready Tour)

Lolenge moko ya komibongisa mpo na koyoka na yo ezali ya kokende na Tour ya Komibongisa mpo na koyoka. Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tours) ezali ba sessions ya ofele na internet esika oyekolaka ndenge nini boyoki ekosala mpe ndenge nini okoki komibongisa mpo na yango. Okoyoka epai ya mosali ya IRB-RPD mpe okozala na libaku ya kotuna mituna nyonso oyo olingi na ntina ya boyokani.

Makambo oyo okoki koyekola pendant Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tour):

  • Ndenge nini kosenga molimboli pona boyoki na yo?
  • Ba elembo nini okoki kobongisa pona esunga esengi na yo?
  • Ba problèmes légaux oyo bakoki ko mentionner na boyoki na yo
  • Ndenge nini kotinda ba elembo na IRB-RPD
  • Ndenge nini boyoki vitruelle esalemaka
  • Nani akozala na boyoki na yo
  • Ndenge nini okoyeba soki ba ndimi to baboyi esengi na yo

Cliquez awa pona ko s’enregistrer na Ebongámí mpo na boyoki (Hearing Ready Tour).

Planifiez esika oko zala mokolo ya boyoki na yo

Mingi minig ya ba boyoki bazalaka virtuelles, elakisi ete esalemaka na nzela ya internet et non na ba bilo ya IRB-RPD. Okoyeba soki boyoki na yo ezala ya virtuelle to ya présentielle, tango okoyamba mokanda na yo ya Likanisi oyo IRB-RPD akotinda yo.

Soki boyoki na yo eza ya virtuelle, esengeli na yo kobongisa epayi nini pe ndenge nini oko assiter na boyoki virtuelle na yo. Eza na ba exigences techniques na ba exigences ya confidentialité oyo esengeli o’respecter pona ko participer na boyoki virtuelle. Tanga un plus na makambo oyo etali ba exigences yango awa.

Soki oza na ntoma oyo azali na bobateli, tuna ye soki okoki kokende na bilo na ye pona boyoki na yo. Soki oza na ntoma te, mituna soki okoki kosala boyoki na yo na ndaku na yo. Est-ce que oza na internet ya malamu,ordinateur to appareil oyo eza na caméra to webcam, pe soki oza na esika ya kimia? Soki oza na biloko oyo te, tango ba options mosusu oyo elandi:

  • Soki oza na mosaleli to compagnie ya établissement oyo esungaka yo, tuna bango soki okoki kokende na ba bilo na bango pona boyoki na yo.
  • Koma na IRB-RPD pona kotuna bango soki okoki ko utiliser ordinateur pe salle moko na ba bilo na bango pona ko participer na boyoki ya virtuelle na yo.

Soki okanisi ete boyoki en personne ekozala malamu mingi pona yo, okoki kokoma na IRB-RPD pona kotuna ete boyoki virtuelle ekoma boyoki en personne. Yebisa bango ba raisons na yo. Pona koyeba ndenge nini okoki kosala ango, tanga makambo oyo ekomama na site web ya IRB-RPD.

Planifiez esika bana na yo bakozala

Soki oza na bana ya mineurs ya moins de 18 ans, baza na besoin te ya kozala présents na boyoki, sauf soki IRB-RPD akomeli yo mokanda pona koyebisa yo ete esengeli bazala présents.

Sala plan pona koyeba esika nini bana na yo bako zala tango ya boyoki na yo. Soki ozali na boyoki ya virtuelle, pe ozali kosala yango na ndaku, meka kozala sûr ete bana na yo bazala te na esika oyo oko sala participar na boyoki ya virtuelle na ndaku na yo. Boyoki na yo eza très importante, pe ezali malamu kozala na ba distractions mingi te tango mokolo n’ango. Okoki pe koloba makambo ya pasi, makambo oyo okolinga bana na yo bayoka yango te. Soki okoki, tinda bana na yo na école to tuna nzoto moko to moninga moko abatela bango pona yo, to luka garderie pona bango.

Soki okoki te kozua place na garderie pona bana na yo, to muana na yo moko aza trop mokie, yebisa Membre na ebandeli ya boyoki.

Kobongola date to heure ya boyoki

Okoki kobongola mokolo to heure ya boyoki na yo kaka soki urgence ekomeli yo to oza malade. Okoki te kosenga ba bongola boyoki na yo pona ba raison mosusu.

Soki urgence ekomeli yo to maladie, esengeli na yo to ntoma oyo azali na bobateli na yo:

  • koyebisa ango na IRB-RPD na ekomeli (na nzela ya email to fax), ata mikolo misato (entre lundi na vendredi) liboso ya audience na yo.
  • Proposez ba mokolo na ba heures missato pona boyoki na yo. Esengeli ba mokolo bazala kati ya mikolo zomi sima ya mokolo original ya boyoki na yo.
  • Tinda ba mokanda ya bokono na yo soki raison na yo eza médicale. Soki okoki te kozua mokanda ya bokono, esengeli na yo o expliquer na mokanda pona nini okoki te kozua yango.

Mokolo ya boyoki

Tanga na bokebi nionso mokanda ya Likanisi ya Convocation. Ekoyebisa yo na heure nini esengeli ozala na boyoki na yo, pe soki eza boyoki na moto to boyoki ya virtuelle. Bako senga yo okoma 15 minutes avant boyoki na yo ebanda.

Soki esengeli na yo kokende esika mosusu pona boyoki na yo, lokola bilo ya molobeli na yo to bilo ya IRB-RPD, préparez na bokebi nionso tango oyo ekozua yo pona kokoma kuna na l’heure.

Lala malamu liboso ya boyoki na yo, pe lia malamu mokolo ya boyoki na yo. Okoki kosenga ba pauses tango ya boyoki na yo soki oza na besoin.