Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Sima ya Boyoki na Yo

Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya motuya pe mayele na oyo ekosalema sima ya boyoki na yo.

Ata soki ozui ekateli ya positif to négatif, oko tanga ba sango détaillées pona ba épemelo oyo ekolanda na  Sekiso 7 – Sima ya Boyoki na Yo.

Ekateli

mámbele akoki kosala mokáno na esengi na yo na nsima ya esambiselo na yo. Soki asengeli na elaka monene, okomona mokáno na nsima. Kozela mokáno ekoki konyokola. Kasi yango elimboli te ete esengi na yo ezali na likama ya koboyama koleka.

Komisyo ya kobongoli ya IRB-RPD ekotinda mokanda ya mokáno ekomami, elongo na ntina ya mokáno wana.

Soki ozali na molobeli ya mobeko, boyebisi ya mokáno ekotindelama ye na nzela ya « Mon dossier ». Ye akopesa yango na yo.

Soki ozali komikomisa yo moko, IRB-RPD ekotindela yo mokanda ya mokáno mbala moko na nzela ya « My Case ». Soki ozali na nzela ya « My Case » te naino, mokáno ekotindelama yo na mokanda ya posita

Soki ba boyi esengi na yo

Eza na ba options légales soki ba boyi esengi na yo. Solola ango na Ntoma (représentant légal) na yo.

Senga Mopaya Ewumela

Soki ba ndimi esengi ya ebombamelo, okoki kosenga Mopaya Ewumela (résidence permanente) tout de suite. Senga ango pona yo moko pe pona libota na yo. Soki ozeli kosenga Mopaya Ewumela, okoki kozala na difficulté ya ko renouveler permis na yo ya mosala. Yeba ete soki bandimi esengi ya ebombamelo, okoki kozonga mboka na yo lisusu te. Soki ozongi na mboka na yo, mbulamatali ekoki kozingisa dossier na yo epayi ya IRB-RPD pona boyoki ya sika.


Étape suivante ya guide ya section: 3 Luka Ntoma oyo azali na Bobateli nayo