Sekiso oyo e’kopesa yo mua boyebi ya ndenge nini esengi na yo ya ebombamelo ebandaka. Eko répondre na mituna oyo okoki kozala nango. Eko sunga yo na ebandeli ya esengi na yo ya ebombamelo.
Tanga Sekiso 4 – Kobanda Esengi ya ebombamelo pona kozua ba sango détaillées nionso.
Mituna ya normale
Okoki kobanda esengi na yo ya ebombamelo tango okomi sika na Kanada, to pe soki ofandaka déjà na Kanada.
- Ndenge nini nakoki kobanda esengi na yo ya ebombamelo?
- Loléngé ekozua tango boni?
- Suite ekozala nini soki ba boyi esengi na yo ya ebombamelo?
- Mokolo nini nako zala réuni na libota na nga?
- Ndenge nini nakoki kozua lisungi?
- Est-ce que bako ndima lisolo na ga
Kobanga te! Eza na batu ebele oyo bakoki kosunga yo na be étapes nionso. Tika kozonga na site oyo mpo na kosunga yo na nzela nyonso.
Senga Mosongi Engébena
Loléngé ya esengi na yo ya ebombamelo ekoki kozala molayi pe matata. Esengeli na yo koluka Mosongi Engébena noki.
Soki o’décider kotinda esengi, senga Mosongi Engébena pona Formulaire ya Bosengi ya Moboko (BOC). Esengeli na yo tango ebele ya kosala na Ntoma (réprésentant juridique) pona ko sangisa makambo nionso ya motuya na kati ya BOC na yo.
Ntoma na yo akoki kosunga yo na ba formulaires pe ba mikanda na yo nionso. Akoki kokende na yo na boyoki na yo, pe kosunga yo na ebeteli ya lisolo na yo.
Yeba ba options na yo nionso
Sala ba recherches pe zua ba conseils légaux. Zala sûr ete bosengi ya ebombamelo ezali meilleure option pona yo. Yeba ndenge nini mokáno yo ya kosala esengi ya ebombamelo ekoki ko affecter future na yo.
Sala malembe
Zua tango ya ko kokokisa Formulaire na yo ya Bosengi ya moboko (BOC). BOC eza important pe okokoka kolobela ango na boyoki na yo. Na kati ya BOC esengeli na yo kolobela makambo nionso ya ntina ya vie na yo. BOC esengeli kozala na masolo nionso ya tina oyo emonisi ete ozali mobombami.
Mibatela
Kosala esengi ya ebombamelo ezali mosala ya pasi. Zua temps ya ko leka ba épemelo na malembe pe na bokebi nionso. Batela ekolongoneli na yo.
Zala organisé
Bakotindela yo mikanda pe ba mikanda ebele tango nionso ya Loléngé ya esengi ya ebombamelo na yo. Dossier moko na biteni ebele ekosunga yo na kobomba ba documents na yo. Soki bokoki kozua nango moko, obanda kosalela.
Sala ba copie pe bomba ba mikanda na yo nionso
Bomba mikanda nionso ya mbulamatali, ata soki osilisi kosalela ango. Po tango mosusu, yo to ntoma na bokozalaka nango besoin.
Bongama pona lisolo ya kondimama
Bongama liboso ete obeta lisolo na yo na lisolo ya kondimama. Ezali na tina que lisolo na yo etikala clair pe cohérent banda ebandeli ti na suka ya esengi na yo. Soki osali erreur to obosani eloko, yebisa ango na Ntoma na yo. Mikanda nionso oko yamba ya mbulamatali na oyo etali esengi ya ebombamelo na yo, batela ango malamu.
Beta lisolo na yo
Tango mosusu bakoki kosenga na yo obeta lisolo na yo na bato ndenge na ndenge. Ekoki kozala ba agents ya CBSA, IRCC, Ntoma (représentant légal) na yo na membere ya IRB-RPD na boyoki na yo. Ekoki kobangisa yo. Sala nionso pona koloba bosolo kaka bosolo na oyo etali lisolo na yo. Sala ete lisolo na yo ezala clair pe cohérent.
Toli ya baninga pe ya libota
Ba conseils juridiques esengeli ewuta epayi ya Ntoma (représentant légal) na yo. Ata ba conseils ya libota to baninga oyo ba sali esengi ya ebombamelo ekoki tango mosusu kobalana te na situation na yo. Tango mosusu bato oyo balingi kosunga yo baza na expérience ya ngunda te. Bosengi ya ebombamelo to ngunda ekeseni. Soki oza na Ntoma te, luka mosali ya réinstallation pona kozua ba sango.
