Sala na Molobeli to Ntoma (Représentant Légal) na Yo

Eteni oyo ezali kotalisa yo mokie ya Ntoma (représentation légale) na kati ya procédure ya esengi ya ebombamelo na yo. Eza kosunga yo na koyeba ba responsabilité na yo, pe koyeba kosolola na Ntoma na yo.

Yekola ba sango détaillées na oyo etali représentation na Sekiso 3 – Zwa Ntoma.

Zala sémbo (honnête)

Yebisa vérité pe zala sémbo na Ntoma na yo. Ekozala pasi pona asunga yo soki aza kobomba ba sango. Aza Mokambi na yo.

Bongama

Bongama avant ba rencontres nionso na Ntoma na yo. Okoki kozala na posa ya kotinda bango mituna na nzela ya email, to kosala liste ya mituna oyo okomema na rencontre na bino. Ekosunga yo na ko utiliser temps na yo na ndenge ya bien.

Oyo eza esengi ya ebombamelo

Yeba ete ezali bosengi NA YO ya ebombamelo. Ata soki oza na Ntoma, esengeli na yo kozala impliqué na ba épemelo nioso avant  na yo. Kokisa ba délais. Soki ozangi moko, IRB ekoki kotalela yo lokola osundolaki bosengi na yo.  

Zala na contrôle na makambo oyo okoki kozala na contrôle nango. Zala sûr que o comprendre procédure. Okozala na kimia na nionso eza koleka.


Étape suivante ya guide ya section: 2.4 Eleko ya kozela