Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Zua linsungi oyo oza na Besoin na’ngo

Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya ntina pe mayele pona ozua lisungi ya bien pendant lolenge na yo ya enegi ya ebombamelo.

Zua ba sango détaillées nionso epayi ya ba Resources ya Communauté na yo.

Ba Agences ya Reinstallation

Luka agence ya Reinstallation to ba services mosusu ya communauté pona lisungi. Bakoki kosunga yo na koluka mosala, ndako, ba cours ya langue, kotinda bana na yo na école, pe koyeba ba services ya ofele pona ba Basengi ya ebombamelo.

Programme Fédéral de Santé Intérimaire

En tant que Mosengi ya ebombamelo, okoki kosenga ba soins médicaus eparyi ya Programme Fédéral de Santé Intérimaire (IFHP):

  • Ba services hospitaliers (to ba services ya ba hôpitaux)
  • Ba services epayi ya ba professionnels ya santé
  • Misu pe ba soins dentaire ya urgents, pe
  • Ba prescriptions ya ba kisi to ba médicaments

Ekozala boy yi mokolo oko zua assurance ya ekolongoneli to ti mokolo oko bima na Kanada.

Senga lisungi pona santé mentale

Okoki ko se sentir stressé tango ya procédure ya esengi ya ebombamelo. Ekoki kozala pe que o subir ba traumatismes na mboka na yo, to pendant voyage oyo ememi yo na Kanada, to pe awa na Kanada. Eza na ba services na Kanada oyo ekoki kosunga yo. IFHP epesaka lisungi na oyo etali ba services ango.

Mi’sala baninga

Meka kokutana na basengi ya ebombamelo mosusu, to batu oyo baye sika na Kanada. Ekoki kosala yo bien ko partager expérience na yo na batu oyo baza na situation moko to similaire na yo. Mi’sala baninga pe zala na contakt na libota to baninga na yo oyo batikali na mboka na yo.


Étape suivante ya guide ya section: 2.6 Mokolo ya Boyoki (Audience) na Yo