Mokolo ya Boyoki (Audience) na Yo

Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya motuya be mayele pona kosunga yo na préparation ya boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.

Oka zua ba sango détaillées na Sekiso 6 – Mokolo ya Boyoki na Yo.

Mibatela

Mibatela pona mokolo ya boyoki na yo (neti kolala pongi kitoko)

Bongama pona mituna bako zala pona yo

Zala prêt ya kopesa biyano na mituna etali esengi na yo. Bakoki kotuna pona nini osalaki esengi na yo na kati ya Kanada noki te.

Ba membere baza batu pe

Membere ya IRB-RPD ako décider na demande na yo. Ba Memberes bakeseni, ba esengi pe ekeseni, kasi mokáno esengeli kozala semoko.

Senga ba pauses

Membre ya IRB-RPD ako décider na oyo etali esengi na yo. Ba Membres bakeseni, bosengi ekesini, mais mokáno il faut ezala ndenge moko.

Répondre na mituna na ndenge ya directe

Zala na bosolo tango oko répondre na mituna mokolo ya boyo. Ko inventer ba réponses te. Soki oyebi eloko te, to oza sûr likambo moko te, yebisa bango.

Soki ocomprendre mituna te, komeka ko répondre te. Yebisa membre ete oza kocomprendre te pe senga ye atuna yo question ango na ndenge mosusu.

Sala na mobongolisi

IRB-RPD ako pesa yo mobongolisi ya ofele oyo olobaka monoko na yo mokolo ya boyoki na yo. Ata soki oyokaka Anglais to Français, eza malamu kozala na mobongolisi pona ko éviter ba erreurs.

Ba audience virtuelles (na nzela ya internet)

Mingi mingi audience ya demande d’asile ezalaka audience virtuelle (vidéoconférence). Esengeli na yo kozala ya:

  • Internet ya fiable, ya sécurisé, ya rapide
  • Ordinateur, tablette, to appareil oyo eza na caméra
  • Esika ya kimia pe ya privé

Soki boyoki na yo ezali programmée na video conférence, kasi ozali na espace privé to ordinateur ya kosalela te, okoki kosenga na IRB-RPD apesa yo ordinateur pe esika na kati ya bilo na bango. Okoki pe kosenga na IRB-RPD boyoki ya misu na misu (en personne) soki omoni que eko zala malamu pona yo.


Étape suivante ya guide ya section: 2.7 Sima ya Boyoki na Yo