Sala Action: Yekola, Sangisa mpe Bongisá
Yekola ba ndenge nionso ya kosala esengi nayo ya ebombamelo. Luka ba sango ya ntina. Zala ekenge na ba ressources na nionso ya communauté. Bongama pona ba épemelo nionso.
Banda esengi na yo ya ebombamelo
Sekiso oyo e’kopesa yo mua boyebi ya ndenge nini esengi na yo ya ebombamelo ebandaka. Eko répondre na mituna oyo okoki kozala nango. Eko sunga yo na ebandeli ya esengi na yo ya ebombamelo.
Tanga Sekiso 4 – Kobanda Esengi ya ebombamelo pona kozua ba sango détaillées nionso.
Mituna ya normale
Okoki kobanda esengi na yo ya ebombamelo tango okomi sika na Kanada, to pe soki ofandaka déjà na Kanada.
- Ndenge nini nakoki kobanda esengi na yo ya ebombamelo?
- Loléngé ekozua tango boni?
- Suite ekozala nini soki ba boyi esengi na yo ya ebombamelo?
- Mokolo nini nako zala réuni na libota na nga?
- Ndenge nini nakoki kozua lisungi?
- Est-ce que bako ndima lisolo na ga
Kobanga te! Eza na batu ebele oyo bakoki kosunga yo na be étapes nionso. Tika kozonga na site oyo mpo na kosunga yo na nzela nyonso.
Senga Mosongi Engébena
Loléngé ya esengi na yo ya ebombamelo ekoki kozala molayi pe matata. Esengeli na yo koluka Mosongi Engébena noki.
Soki o’décider kotinda esengi, senga Mosongi Engébena pona Formulaire ya Bosengi ya Moboko (BOC). Esengeli na yo tango ebele ya kosala na Ntoma (réprésentant juridique) pona ko sangisa makambo nionso ya motuya na kati ya BOC na yo.
Ntoma na yo akoki kosunga yo na ba formulaires pe ba mikanda na yo nionso. Akoki kokende na yo na boyoki na yo, pe kosunga yo na ebeteli ya lisolo na yo.
Yeba ba options na yo nionso
Sala ba recherches pe zua ba conseils légaux. Zala sûr ete bosengi ya ebombamelo ezali meilleure option pona yo. Yeba ndenge nini mokáno yo ya kosala esengi ya ebombamelo ekoki ko affecter future na yo.
Sala malembe
Zua tango ya ko kokokisa Formulaire na yo ya Bosengi ya moboko (BOC). BOC eza important pe okokoka kolobela ango na boyoki na yo. Na kati ya BOC esengeli na yo kolobela makambo nionso ya ntina ya vie na yo. BOC esengeli kozala na masolo nionso ya tina oyo emonisi ete ozali mobombami.
Mibatela
Kosala esengi ya ebombamelo ezali mosala ya pasi. Zua temps ya ko leka ba épemelo na malembe pe na bokebi nionso. Batela ekolongoneli na yo.
Zala organisé
Bakotindela yo mikanda pe ba mikanda ebele tango nionso ya Loléngé ya esengi ya ebombamelo na yo. Dossier moko na biteni ebele ekosunga yo na kobomba ba documents na yo. Soki bokoki kozua nango moko, obanda kosalela.
Sala ba copie pe bomba ba mikanda na yo nionso
Bomba mikanda nionso ya mbulamatali, ata soki osilisi kosalela ango. Po tango mosusu, yo to ntoma na bokozalaka nango besoin.
Bongama pona lisolo ya kondimama
Bongama liboso ete obeta lisolo na yo na lisolo ya kondimama. Ezali na tina que lisolo na yo etikala clair pe cohérent banda ebandeli ti na suka ya esengi na yo. Soki osali erreur to obosani eloko, yebisa ango na Ntoma na yo. Mikanda nionso oko yamba ya mbulamatali na oyo etali esengi ya ebombamelo na yo, batela ango malamu.
Beta lisolo na yo
Tango mosusu bakoki kosenga na yo obeta lisolo na yo na bato ndenge na ndenge. Ekoki kozala ba agents ya CBSA, IRCC, Ntoma (représentant légal) na yo na membere ya IRB-RPD na boyoki na yo. Ekoki kobangisa yo. Sala nionso pona koloba bosolo kaka bosolo na oyo etali lisolo na yo. Sala ete lisolo na yo ezala clair pe cohérent.
Toli ya baninga pe ya libota
Ba conseils juridiques esengeli ewuta epayi ya Ntoma (représentant légal) na yo. Ata ba conseils ya libota to baninga oyo ba sali esengi ya ebombamelo ekoki tango mosusu kobalana te na situation na yo. Tango mosusu bato oyo balingi kosunga yo baza na expérience ya ngunda te. Bosengi ya ebombamelo to ngunda ekeseni. Soki oza na Ntoma te, luka mosali ya réinstallation pona kozua ba sango.
Bongisa ba sango na Yo
Sekiso oyo ekolakisa yo ndenge nini okoki kobongama pona esengi na yo. Ekopesa yo ba idées pona ba elembo ya ntina oyo ekosunga lisolo na yo. Ekolakisa yo ndenge nini ko kipa pe ko partager ba sango ya ntina.
Yekola mingi ya oyo etali ba elembo to bilembo pe ba mikanda oyo eko supporter lisolo na yo na Sekiso 5: Bongama pona Boyoki na Yo.
Koma lisolo na yo
Ekosunga yo mingi kokoma lisolo ya oyo ekomelaki yo, pe pona nini oza na bomo ya kozonga mboka na yo. Beta lisolo na yo, ebandeli ti na suka, na ndenge ya chronologique to pe dans l’ordre, pe bakisa ba mokolo oyo nionso oyebi. Ekoki kosunga yo na ko identifier ba elembo to bilembo pona esengi na yo. Zala bokebi, tia ba détails nionso, kobosana ata eloko moko te.
Sangisa ba elembo na to
Esengeli na yo kosangisa ba elembo to bilembo oyo ekosunga esengi na yo. Ba elembo nde esalaka ete IRB-RPD endima oyo ekomeli yo, pe eko comprendre pona nini okoki kozonga na mboka na yo te.
Ba ndakisa ya ba elembo oyo okoki kosangisa:
- Ba mikanda oyo eko prouver bowulani na yo
- Ba elembo oyo ekolakisa bosolo ya lisolo na yo
- Ba mikanda to ba articles ya ba journaux oyo elakisi ba réalités ya mboka na yo pe pona nini okoki kofanda na kimia kuna te (pona nini vie na yo eza nadanger)
- Ba lettres to ba mikanda légaux (lisakoli sous serment) ya batu oyo bakoki ko témoigner na bosolo ya lisolo na yo.
- Ba rapports oyo elakisi ete osengaki lisungi ya ba agences ya mbulamatali na mboka na yo.
Meka kozua nionso oyo oza nango besoin na mboka na yo na tango moke. Kosenga ba rapports ya police to pe ya hôpital ekoki kozua yo tango mingi. Soki okoki kozua eloko te, bomba ba elembo ya nionso oyo omekaki.
Sosola ba mikanda pe ba elembo
Eza na tina kotanga na bokebi nionso bilembo na yo pe ba mikanda pona kolula ba erreurs. Tango mosusu mutu mosusu akoki kokomela yo mokanda ponako soutenir yo mais ekokani te na ba sango ya Formulaire BOC ya yo. Esengeli na yo tango mosusu kosolola na kolo ya mokanda pona ko expliquer ba mobúlú tango ya boyoki na yo. Solola na Ntoma (représentant légal) na yo pona oyo esengeli kosala. Eza na tina pona IRB-RPD andima biteni nionso ya lisolo na yo.
Bongolisa ba mikanda nionso
Esengeli na yo kobongolisa ba elembo nionso na Anglais to na Français. Esengeli na yo ko sala ango noki po ezuaka temps molayi. Solola na Ntoma (représentant légal) na yo pona koyeba ba mikanda esengeli bobongolisa.
Bomba copie moko ya ba mikanda na yo nionso
Bomba ba photocopies ya moko moko ya ba mikanda na yo:
- Formulaire BC pe ba formulaire mosusu ya imigrasyon
- Lisolo na yo
- Ba elembo (preuves) nionso, ba esengi, ba lettres oyo yo to Ntoma (représentant légal) na yo bopesaki na IRB, CBSA to IRCC
Somba classeur pona ko bomba ba mikanda na yo na ndenge ya organisé pe ya sûr. Bomba ba mikanda ango nionso ti mokolo okokoma mwana mboka ya Kanada.
Tia adresse na yo à jour
Batela adresse na yo malamu pona kozangisa te ba sango na oyo etali esengi na yo.
Sala na Molobeli to Ntoma (Représentant Légal) na Yo
Eteni oyo ezali kotalisa yo mokie ya Ntoma (représentation légale) na kati ya procédure ya esengi ya ebombamelo na yo. Eza kosunga yo na koyeba ba responsabilité na yo, pe koyeba kosolola na Ntoma na yo.
Yekola ba sango détaillées na oyo etali représentation na Sekiso 3 – Zwa Ntoma.
Zua Ntoma
Lolenge ya enegi ya ebombamelo eza matata. Ntoma (Représentant légal) akoki kosunga yo na lolenge ango.
Pona na bokebi nionso Ntoma (représentant légal) oyo aza certifé! Keba na batu oyo bako loba na yo ete bakoki kosunga yo na lolenge na yo, sans que bazala balobeli to ba consultants ya imigrasyon ya solo.
Senga Mosungi Engebena (aide légale) soki eza disponible epayi ofandaka.
Zala sémbo (honnête)
Yebisa vérité pe zala sémbo na Ntoma na yo. Ekozala pasi pona asunga yo soki aza kobomba ba sango. Aza Mokambi na yo.
Bongama
Bongama avant ba rencontres nionso na Ntoma na yo. Okoki kozala na posa ya kotinda bango mituna na nzela ya email, to kosala liste ya mituna oyo okomema na rencontre na bino. Ekosunga yo na ko utiliser temps na yo na ndenge ya bien.
Oyo eza esengi ya ebombamelo
Yeba ete ezali bosengi NA YO ya ebombamelo. Ata soki oza na Ntoma, esengeli na yo kozala impliqué na ba épemelo nioso avant na yo. Kokisa ba délais. Soki ozangi moko, IRB ekoki kotalela yo lokola osundolaki bosengi na yo.
Zala na contrôle na makambo oyo okoki kozala na contrôle nango. Zala sûr que o comprendre procédure. Okozala na kimia na nionso eza koleka.
Sala na Ntoma na yo
Aza na tina kozala na relation ya bobangi pe ya confiance na Ntoma na yo. Pona boyeba kosala ensemble. Mona na Ntoma na yo, ndenge nini boko koka kokutana na ye, pe ndenge nini okoyamba ba sango oyo etali Libenga ya mikanda na yo. Yeba ndenge nini pe tango nini okoki kozala na contakte na Ntoma na yo.
Mosala ya Ntoma na yo
Yeba nini Ntoma (représentant légal) na yo akoki to akoki te kosala. Kozela te ayebisa yo ete bako ndima bosengi na yo. Kozela te alaka yo ete bako ndima esengi na yo. Ezali Membere ya IRB-RPD moto ako loba soki bako ndima to te.
Changer Ntoma na yo
Oza na bosémbo ya koluka Ntoma mosusu soki omoni ete oyo ozali na ye aza mayele te. Soki oza à l’aise te, luka Ntoma mosusu. Eza na tina oluka mutu oyo okoki kosala confiance.
Eleko ya kozela
Sekiso oyo e’kopesa yo mayele ya ndenge ya ko occuper temps na yo, mingi mingi soki ozali kozela boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.
Kanga motéma
Kozela ezali moko ya ba epémelo ya procédure ya esengi ya ebombamelo. Esengeli na yo tango mosusu kozela pona koyeba mokolo ya audience, soki ba ndimi to ba boyi bosengi na yo.
Bongama
Na tango oza kozela, bongama pona boyoki na yo.
- Kende na Botambola Ebongámí mpo na boyoki na IRB-RPD. Okoyekola ndege nini ko préparer boyoki na yo pe makambo oyo ekoleka na boyoki na yo. Okokutana na basali ya IRB pe okokoka kotuna biyano ya mituna oyo etali boyoki.
- Zongela kotanga Formulaire BOC, lisolo pe bilembo na yo oyo otindaki.
- Luka ba erreurs nionso na kati ya BOC, lisolo, ba notes ya boyoki, ba elembo pe ba mikanda mosusu na yo (na ba esengi ya visa na mboka mopaya). Lakisa’ngo na Ntoma na yo. Okoki kolinga kotinda nionso oyo esengeli komodifier epayi IRB-RPD.
- Kozanga koyeba te nionso eza koleka na mboka na yo. Soki eloko moko oyo ekokani na lisolo na yo esalami na mboka na yo, kende na lobango koyebisa Ntoma (représentant légal) na yo.
Bozua esika
Liboso ete boyoki ebanda yo na libota na yo bozua esika ya kofanda. Okoki:
- Améliorer Anglais na Français na yo
- Luka mosala
- Zala actif
- Sala volontariat na communauté
- Kota na groupe ya ba nouveaux arrivants
- Yekola koyeba ba voisins na yo
Zua linsungi oyo oza na Besoin na’ngo
Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya ntina pe mayele pona ozua lisungi ya bien pendant lolenge na yo ya enegi ya ebombamelo.
Zua ba sango détaillées nionso epayi ya ba Resources ya Communauté na yo.
Ba Agences ya Reinstallation
Luka agence ya Reinstallation to ba services mosusu ya communauté pona lisungi. Bakoki kosunga yo na koluka mosala, ndako, ba cours ya langue, kotinda bana na yo na école, pe koyeba ba services ya ofele pona ba Basengi ya ebombamelo.
Programme Fédéral de Santé Intérimaire
En tant que Mosengi ya ebombamelo, okoki kosenga ba soins médicaus eparyi ya Programme Fédéral de Santé Intérimaire (IFHP):
- Ba services hospitaliers (to ba services ya ba hôpitaux)
- Ba services epayi ya ba professionnels ya santé
- Misu pe ba soins dentaire ya urgents, pe
- Ba prescriptions ya ba kisi to ba médicaments
Ekozala boy yi mokolo oko zua assurance ya ekolongoneli to ti mokolo oko bima na Kanada.
Senga lisungi pona santé mentale
Okoki ko se sentir stressé tango ya procédure ya esengi ya ebombamelo. Ekoki kozala pe que o subir ba traumatismes na mboka na yo, to pendant voyage oyo ememi yo na Kanada, to pe awa na Kanada. Eza na ba services na Kanada oyo ekoki kosunga yo. IFHP epesaka lisungi na oyo etali ba services ango.
Mi’sala baninga
Meka kokutana na basengi ya ebombamelo mosusu, to batu oyo baye sika na Kanada. Ekoki kosala yo bien ko partager expérience na yo na batu oyo baza na situation moko to similaire na yo. Mi’sala baninga pe zala na contakt na libota to baninga na yo oyo batikali na mboka na yo.
Mokolo ya Boyoki (Audience) na Yo
Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya motuya be mayele pona kosunga yo na préparation ya boyoki na yo ya esengi ya ebombamelo.
Oka zua ba sango détaillées na Sekiso 6 – Mokolo ya Boyoki na Yo.
Mibatela
Mibatela pona mokolo ya boyoki na yo (neti kolala pongi kitoko)
Bongama pona mituna bako zala pona yo
Zala prêt ya kopesa biyano na mituna etali esengi na yo. Bakoki kotuna pona nini osalaki esengi na yo na kati ya Kanada noki te.
Ba membere baza batu pe
Membere ya IRB-RPD ako décider na demande na yo. Ba Memberes bakeseni, ba esengi pe ekeseni, kasi mokáno esengeli kozala semoko.
Senga ba pauses
Membre ya IRB-RPD ako décider na oyo etali esengi na yo. Ba Membres bakeseni, bosengi ekesini, mais mokáno il faut ezala ndenge moko.
Répondre na mituna na ndenge ya directe
Zala na bosolo tango oko répondre na mituna mokolo ya boyo. Ko inventer ba réponses te. Soki oyebi eloko te, to oza sûr likambo moko te, yebisa bango.
Soki ocomprendre mituna te, komeka ko répondre te. Yebisa membre ete oza kocomprendre te pe senga ye atuna yo question ango na ndenge mosusu.
Sala na mobongolisi
IRB-RPD ako pesa yo mobongolisi ya ofele oyo olobaka monoko na yo mokolo ya boyoki na yo. Ata soki oyokaka Anglais to Français, eza malamu kozala na mobongolisi pona ko éviter ba erreurs.
Ba audience virtuelles (na nzela ya internet)
Mingi mingi audience ya demande d’asile ezalaka audience virtuelle (vidéoconférence). Esengeli na yo kozala ya:
- Internet ya fiable, ya sécurisé, ya rapide
- Ordinateur, tablette, to appareil oyo eza na caméra
- Esika ya kimia pe ya privé
Soki boyoki na yo ezali programmée na video conférence, kasi ozali na espace privé to ordinateur ya kosalela te, okoki kosenga na IRB-RPD apesa yo ordinateur pe esika na kati ya bilo na bango. Okoki pe kosenga na IRB-RPD boyoki ya misu na misu (en personne) soki omoni que eko zala malamu pona yo.
Sima ya Boyoki na Yo
Sekiso oyo ekopesa yo ba sango ya motuya pe mayele na oyo ekosalema sima ya boyoki na yo.
Ata soki ozui ekateli ya positif to négatif, oko tanga ba sango détaillées pona ba épemelo oyo ekolanda na Sekiso 7 – Sima ya Boyoki na Yo.
Ekateli
mámbele akoki kosala mokáno na esengi na yo na nsima ya esambiselo na yo. Soki asengeli na elaka monene, okomona mokáno na nsima. Kozela mokáno ekoki konyokola. Kasi yango elimboli te ete esengi na yo ezali na likama ya koboyama koleka.
Komisyo ya kobongoli ya IRB-RPD ekotinda mokanda ya mokáno ekomami, elongo na ntina ya mokáno wana.
Soki ozali na molobeli ya mobeko, boyebisi ya mokáno ekotindelama ye na nzela ya « Mon dossier ». Ye akopesa yango na yo.
Soki ozali komikomisa yo moko, IRB-RPD ekotindela yo mokanda ya mokáno mbala moko na nzela ya « My Case ». Soki ozali na nzela ya « My Case » te naino, mokáno ekotindelama yo na mokanda ya posita
Soki ba boyi esengi na yo
Eza na ba options légales soki ba boyi esengi na yo. Solola ango na Ntoma (représentant légal) na yo.
Senga Mopaya Ewumela
Soki ba ndimi esengi ya ebombamelo, okoki kosenga Mopaya Ewumela (résidence permanente) tout de suite. Senga ango pona yo moko pe pona libota na yo. Soki ozeli kosenga Mopaya Ewumela, okoki kozala na difficulté ya ko renouveler permis na yo ya mosala. Yeba ete soki bandimi esengi ya ebombamelo, okoki kozonga mboka na yo lisusu te. Soki ozongi na mboka na yo, mbulamatali ekoki kozingisa dossier na yo epayi ya IRB-RPD pona boyoki ya sika.