Okoki kosenga Mopaya Ewumela (RP) na Kanadá kaka soki IRB-RPD to IRB-RAD a ndimi esengi nayo ya ebombamelo.
Eza malamu koyeba ete lolenge ya bosengi ya RP (Mopaya ewumela) ekoki kozua tango molayi. Tango ya lolenge eza ndenge na ndenge pona moto na moto. Eza normale.
Bandela esengi na yo
Okoki kosala esengi na yo na nzela ya Ezibeli (portail) ya Mopaya ewumela, okoki pe kotinda mikanda na nzela ya courriel to ya Poste.
Ndenge nini kobanda esengi na yo na Portail (Ezebeli) ya RP
- Kela compte na yo.
- Se konekte na compte na yo.
- Pona oyo elandi na menus déroulants:
- Pologalámi ya esengi na yo: “Mopaya ewumela, y compris esika ya ko fanda mone (reinstallation) ya babombami.”
- Pologalámi ya esengi na yo (2): “Mobombami.”
- Molongo ya esengi na yo: Kati ya Kanadá – “Moto oyo azali na bobateli.”
- Ekozala malamu o remplir ba información ya profile na yo liboso ya ko remplir profile ya ba información ya libota na yo.
- Cliquez na “Sauvegarder et Continuer”
Bongisa ba mikanda
Pona kosala application, esengeli na yo kobongisa:
- Nkóndo(liste ya verification) ya mikanda (IMM 5286 E)
- Formulaire Générique ya Esengi na Kanadá (IMM 0008)
- Bato ba Boyángelami to ba dependants/Déclaration (lisakoli) (IMM 0008DEP-E)
- Bato oyo baza na bobateli pe Convention ya babombami (IMM 0008: Schedule 14)
- Antécédents/Déclaration(Lisakoli) (IMM 5669 E : bokaboli ngonga A)
- Ba información ya lisangá ya libota (IMM 5406 E)
- Utilisation ya Représentant (IMM 5476 E)Bato ba Boyángelami to ba dependants
- Kopí ya Likanisi ya Mokáno oyo episi yo statut ya Mobombami ya Bobembani to statut ya Moto oyo azali na bobateli na Kanadá.
- Photographie numérique ya sika, recto-verso (format passeport, tamponnée epayi studio photo)
- Ba photocopie ya mokanda na yo ya bowulani oyo babotolaki:
- Pasepo (ata soki mokolo eko expire),
- Mikanda ya mobémbo,
- acte de naissance oyo babongolisi, pe
- Mikanda mosusu ya bowulani lokola mokanda ya libala.
Bato ba Boyángelami(dependants) pe Libota na yo
Soki oza na ba moto oyo basengi na bango na kati to libanda ya Kanadá, esengeli na yo ko remplir mikanda ndenge na ndenge pona bango. Esengeli na yo kobongisa:
- Nkondo ya verification ya ba Mikanda (IMM 5286 E)
- Mikanda ya esengi ya Kanadá (IMM 0008 E)
- Moto oyo azali na bobateli pe Bobembani ya ba Mobombami (IMM 0008: Bokaboli ngonga 14)
- Antécédents/Déclaration (Lisakoli) (IMM 5669 E : Schedule A)
- Ba información mosusu ya libota (IMM 5406 E)
- Utilisation ya Représentant (IMM 5476 E)
- Photo digitale moko ya recto-verso (format pasepo)
- Photocopie ya ba pasepo, mikanda ya mobémbo, to mikanda ya bowulani.
- Ba photocopi ya ba mikanda oyo elakisi relation na yo na bango, lokola ba mokanda ya motanga, ba mokanda ya libala, to lisakoli ya mobali ya solo (Formulaire 5409).
Na esengi na yo, esengeli na yo koyebisa IRCC ba kombo ya mobali/muasi, to ba membres ya libota oyo basengi na bango, oyo babakisami na bomoi na yo depuis ofandi na Kanadá.
Ekoki kozala ete oyebi te esika nini ba libota na yo mosusu bafandaka, kasi okoki ko inclure bango na kati ya esengi na yo. Bakozala na 1 année pona kosenga Mopaya ewumela banda mokolo oyo yo okozua oyo ya yo. Eza kaka moto oyo IRCC akókí kosala lokola membre ya libota na yo nde akoki kosala yango, ba membres ya libota ya solo bazali inclus te. Solola na molobeli na yo soki ozali na ba membres ya libota oyo bazali ba membres ya libota ya solo.
Bongolisa ba mikanda
Pona ba mikanda nyonso (ata ba tampons to ba sceaux) oyo ekomami na Anglais to na Français te, esengeli na yo kotinda:
- Bobongoli na Anglais to na Français. Kende na site ya IRCC pona ko landa ba makoki ya kobongolisa mikanda.
- Soki okoki te kozua mobongolisi oyo azali certifié na mosala na ye pona mikanda na yo ya bowulani, okoki kozua mobongolisi oyo azali certifié te. Soki ozui mobongolisi oyo azali certifié te, okozala na besoin ya:
- affidavit ya mobongolisi oyo asali bobongoli, pe
- Photocopie certifiée ya mokanda original. Ekozala malamu ete mokanda yango ezala certifié na Kanadá epayi ya moto oyo azali notaire, komisaliya to pe komisaliya na lisalisi ya ba affidavits.
Futa ba frais
Esengeli na yo kofuta ba frais tango okosala esengi ya Mopaya ewumela pona yo moko pe pona ba membres ya libota na yo. Okofuta ba frais nyonso na nzela ya internet. Pona kofuta ba frais, okozala na besoin ya:
- Adresse email pona kofungola compte,
- Ordinateur, pona ko sauvegarder ba lesí na yo,
- Imprimante (pona ko imprimer ba lesí), pe
- Carte de crédit, carte Débit Mastercard® to carte Débit Visa®.
Tango okozala prêt pona kofuta
- Kende na Paiement en Ligne.
- Landa ba lolenge.
- Na suka, cliquez na boutton ya impression pona ko imprimer lesi officiel ya IRCC na code barre.
- Imprimez ba copies mibale.
- Sauvegardez copie moko na ordinateur na yo.
- Mitinda copie moko na adresse email na yo.
- Kotisa moko ya ba photocopie oyo o imprimaki na libenga na yo ya esengi.
- Bomba photocopie mosusu wana na clasiers na yo ya ba mikanda ya ntina.
Ba Données Biométriques
Soki esengeli na yo kopesa ba données biométriques na yo (lokola ba empreintes), sima ya kosala esengi na yo ya Mopaya ewumela, pe ya kofuta ba frais ya biométrie, okoyamba Mokanda ya Botangisi Biométrique (BIL). Mokanda ango ekoyebisa yo ete tango ekoki pona oluka rendez-vous pona kopesa ba données biométriques na yo. Na kati ya mokanda, okomona lien ya ba esika désignés ya Service Kanadá epayi okoki kopesa ba données biométriques na Kanadá pe na poto.
Pesa ba données biométriques na yo noki. Bako traiter esengi na yo te soki opesi ba données wana te.
Tinda esengi na yo
Okoki kosala esengi na yo pe kotinda mikanda na yo na nzela ya internet na Ezibeli (portail) ya Mopaya ewumela.
Okoki pe kotinda ba mikanda na yo ya esengi epayi ya IRCC na nzela ya email to poste:
Adresse postale
Application ya bato oyo baza na bobateli na Kanada Box 12153 STN A Sydney, NS B1P 0L1
Adresse ya messagerie
Application ya bato oyo bazali na bobateli na Kanada 3050 Wilson Avenue New Waterford, NS B1H 5V8
Ba epemelo ya ko sila
Soki opesi ba sango nionso esengeli na yo kopesa na ndenge ya malamu pona esengi na yo ya mopaya ewumela, okoyamba mokanda ya IRCC oyo eko yebisa yo ete ba ndimi kopesa yo mopaya ewumela (PR).
Carte na yo ya mopaya ewumela (PR) ekokoma na nzela ya poste. Ekozala malamu opesa adresse na yo ya sika na IRCC pona ko rater mokanda wana te!
Tango mosusu, IRCC akosenga ko interviewer yo. Bakoki kolinga ko luka ba sango to pe otindela bango ba sango nyonso. Tango IRCC akozala na nionso oyo aza nango besoin, okoki pe kozua statut na yo ya mopaya ewumela (PR) na masolo na yo ya suka.
