Batela mobeko na yo ya mobombami

Nakoki koza na mobeko na ngai na Kanadá nsima ya kozwa ebombamelo?

IRCC to CBSA ekoki kosenga IRB-RPD mpo na kobakisa mobeko na yo ya mobombami na ndakisa ya Bobembani to moto oyo azali na bobateli.

Okoki koza na mobeko na yo na Kanadá na nzela ya minist na IRCC to CBSA:

  • akanisi ete ozali na elembo oyo ezali te to ozali na moke ya makambo ya ntina.
  • akomi ete ozali na bobateli to mobotama na mboka mosusu. Mibeko ekoki kozala ndenge na yango :
    • Osili kokondima bobáteli ya mboka na yo. Olingi kosalisa to renouveler mokanda ya bwana mboka na yo, kozwa mokanda ya bwana mboka na yo ya kala to okendaki na mboka na yo.
    • O’búngisaki bomwana-mbóka na mboka na yo mpe osili kokanga yango lisusu ntango okomi mobeko ya mobombami na Kanadá.
    • Ozwui bomwana-mbóka (pe bobáteli) na mboka ya sika.
    • Oponaki kozonga kofanda na mboka na yo.
  • Akini ete makambo oyo etindaki yo o’senga bobateli ezali lisusu na tina te, pe ozali lisusu na likama te na mboka na yo. Na yango, lakisa kasi tina to ba raisons oyo eza kolakisa ete o’koki kozonga te.

Soki IRCC to CBSA ezali na ba tina ya kondima yango, IRB-RPD ekoki kosenga yo oyaka na boyoki.

Batela statut na yo ya Mobombami na Kanadá.

Ezali na lolenge ebele ya kobatela statut na yo ya Mobombami na Kanadá:

Kosalelaka pasepo pe mobembo:

  • Kozonga lisusu ata mokie te kosenga pasepo mosusu ya mboka na yo ya kala.
  • Kosalela pasepo na yo ya kala pona kokenda mobembo na mboka mosusu te.
  • Soki esengeli na yo kokende mobembo, senga Mokanda ya Mobembo ya babombami.
  • Kozonga na mboka na yo lisusu te.

Kobatela bosolo nionso na lolenge osali lolenge ya esengi na yo ya ebombamelo.

  • Lakisa pena ete nionso olobaki na boyoki pe nionso opesaki IRB-RPD ezalaki bosolo.
  • Kolekisa te pe komonela te ba elembo.
  • Kobombela IRB-RPD ata likambo moko te ya motuya.
  • Kozua toli ya lisalisi ya mobeko te epayi ya batu oyo bazali kokoka te, to epayi ya moto oyo alobi na yo oloba lokuta.

Bomwana-mboka

  • Kanisa malamu liboso ya kosenga bomwana-mboka na mboka mosusu, po ekoki kosala ete okoka lisusu kofanda na Kanadá te.
  • Senga bomwana-mboka ya Kanadá tango omoni ete okoki kosenga yango. Liboso na kosala esengi, lobela yango na ntoma oyo azali na bobateli na yo.

Makambo ya misala mabe:

  • Kosola misala mabe te. Kanadá akoki koboya moto oyo asengi ebombamelo soki lisumu na ye ezali monene to grave; ata soki oza moto oyo aza esengi ya ebombamelo, moto oyo azali na bobateli, to pe mopaya ewumela. Soki oza na makambu na Tribunal Pénal, yebisa molobeli na yo ete oza na statut ya immigré. Tuna ba molobeli na yo ya nzela ya pénal pe ya immigration ndenge nini oko bebisa statut na yo ya immigré soki ba condenmer yo. Senga molobeli na yo ya nzela ya pénal aluka ko kontakte molobeli na yo ya immigration mpo bango mibale basunga yo.

Étape suivante ya guide ya section: 7.5 Esengi na yo ya ebombamelo eboyami.