New laws in Canada may affect your refugee claim eligibility, even if you have already submitted your application. Some information on this website is out of date. We are updating it. Speak with a lawyer or trusted settlement service provider. Learn More

Bandimi esengi na yo ya ebombamelo.

Soki IRB-RPDIRB-RPD andimi esengi na yo ya ebombamelo, okomi Mobombami ya Bobembani to to Moto oyo azali na bobateli. Yango elingi koloba ete oyo (na libota na yo na kati to na libanda ya Kanadá) bokokikosenga ezaleli ya Mopaya ewumela. Soki ozali kovanda na Québec, o’kosenga pe Certificat ya Sélection ya Québec.

Nini nakoki kosala soki Ministre asali mbela?

Ministre akoki kosenga ete bazongela kotala lisusu mokano ya IRB-RPD. Yango elingi koloba ete Ministre asali mbela pona mokano na yo ya malamu. Pona kosala mbela, Ministre asengeli komonisa ete IRB-RPD asali mabunga na mokano na oyo etali likambo ya esengi na yo ya ebombamelo.

Soki Ministre asali mbela na mikolo zomi na mitano banda mokolo IRB-RPD apesaki mokano na ye, osengeli kozelisa mokolo likambo ya esengi na yo ya Mopaya ewumela.

Soki Ministre asali mbela ya mokano, bako pesa yo nsango pe o’kokoka kopesa eyano. Tango oko zongisa eyano, oko pesa ba raison oyo eza kosala ete o’ndima mbela ya Ministre te.

Pona ko zongisa eyano na mbela, yo to ntoma, esengeli:

  • Bo’bongisa Avis ya Posa ya kozongisa Eyano.
  • Bo’bongisa Libenga ya Mikanda ya Répondant na ba raisons oyo esali ete osepeli te, pe likolo na’ngo mikanda nionso oyo ekoki kosunga dossier na yo.
  • Tinda ba mikanda mibale wana epayi ya Ministre, pe na bilo ya IRB-RPD ya région na yo, na nzela ya email, fax, to poste. Soki ozali na ntoma, akoki kosala’ngo pona yo.
  • Pesa IRB-RAD, elembo oyo eza kolakisa ete otindi mikanda na yo epayi ya Ministre.

Na sima ya kozongisela ntoma na kotinda mikanda esengami, IRB-RAD akózua mokano sans audience. Na ba likambo mosusu, Ministre akoki kosenga audience.

IRB-RAD akozua moko ya mikano oyo elandi:

  • IRB-RAD akozua moko ya mikano oyo elandi:
  • Koboya mokano ya IRB-RPD, pe ko remplacer yango na mokano ya sika.
  • Konzongela likambo na yo epayi ya IRB-RPD pe kosenga boyoki (audience) ya sika.

Mobémbo na libanda ya Kanadá.

Soki ozali na makanisi ya kobima na Kanada, sima ya kozua statut ya bobombami to okomi mutu oyo azali na bobateli, osengeli kosenga Mokanda ya Mobembo ya Mobombami epayi ya Pasepo na kati ya Kanada. Soki Ministre asali appel, kobima te na Kanada.


Étape suivante ya guide ya section: 7.3 Senga Mopaya ewumela