Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Zua Mokano na Yo

Komisyo ya Bilo ya bato bakota pe ya Mobombami ya Kanadá – Eténi ya Bobateli ya Babombami nde e’decidaka soki esengi na yo ya ebombamelo bako ndima na Kanadá.

Sima ya boyoki (audience) na yo ya bobombami, Membere ya Conseil akoki:

  • Koyebisa yo ete boyoki (audience) na yo bako zongela’ngo na mikolo ekoya.
  • Koyebisa yo soki bandimi to baboyi esengi na yo. Ba bengaka’ngo mikáno ya maloba.
  • Koyebisa yo ete oko zua mokano na yo na nzela ya poste. Ba bengaka’ngo mokano ya makomi.
  • Kopesa yo to ntoma na yo tango ebele pona ko tinda Membere, ba mikanda to ba sango mosusu liboso ete azua mokano na ye.

Étape suivante ya guide ya section: 7.2 Bandimi esengi na yo ya ebombamelo.