Kozwa momonisi ya mibeko
Soki bakangi yo, sɛngá osolola na momonisi ya mibeko. Na kotalela esika ozali na Kanada:
- Okoki kozala représenté ofele na Molobeli ya mosala (molobeli to mosungi ya mibeko) na tango ya ba boyoki na yo.
- Okoki kozala na nzela ya kozwa bomonisi ya mibeko na nzela ya manaka ya lisalisi ya mibeko ya etuka soki okokisi makambo oyo esengeli.
- Okoki kopona kobatela misala ya avocat to conseiller ya imigrasyon ya secteur privé.
Soki ozali na momonisi ya mibeko te, okoki kopona momonisi oyo afutami te, na ndakisa moto ya libota, to okoki komimonisa.
Kontakte batu
Ekoki kozala mpasi mpo na kosolola na bato oyo bazali libanda ya Centre ya bobateli ya Imigrasyon to boloko esika ozali kokangama.
Na ba Centres ya Imigrasyon Holding, okoki kosalela internet to téléphone na yo moko te soki CBSA epesi yo ndingisa ya kosala yango te. Okoki kobenga ofele na Canada. Okoki kozala na mposa ya carte d’appel internationale oyo efutami liboso mpo na kobenga mboka mosusu.
Na babolɔkɔ, okoki kozala na mokakatano mpo na kosalela telefone, na kotalela bolɔkɔ nini ozali.
Bozwa ba sango
Okoki kosenga kosolola na mosali ya CBSA mpo na kozwa sango mingi na ntina ya matambe oyo ekolanda. Momonisi na yo ya mibeko akoki mpe kopesa yo makambo ya ntina.
Ezali na ba Organisations non Gouvernementales (NGO) oyo esalisaka bakangami. Bakoki koya kotala yo mpe kopesa yo makambo mosusu oyo etali ezalela na yo. Tuna mosali ya CBSA to momonisi na yo ya mibeko soki okoki kosolola na NGO.
Bapaya
Okoki kozala na likoki ya kosala ete baninga, libota, to bato mosusu báya kotala yo. Bantango mpe makambo ya kotala ekeseni.
Mibeko ya sekirite
Ba centres ya suivi na ba prisons ezali na ba gardes ya sekirité oyo ba appliquer mibeko pe ba suivre yo.
Kokangama ekoki kozala likambo ya mpasi mingi. Okoyoka lokola ozali na boloko mpe okobungisa bonsomi na yo ya moboko. Bakoki kosalela minoko, biloko oyo ekangamaka, mpe biloko mosusu oyo epekisaka ntango obimi na esika yango (ndakisa, mpo na kozwa rendez-vous ya monganga na libándá).
Bana
Soki ozali na Kanada elongo na bana na yo, bakoki kotya bango na centre moko elongo na yo. Soki okabwani na bana na yo to na bato mosusu ya libota, yebisa momonisi na yo ya mibeko mpe luká lisalisi epai ya NGO.
Kosala mokanda ya kofunda
Soki ozali na plainte mpo na traitement na yo, okoki kosala yango na CBSA. Masolo oyo bozali na yango ekokaki kozwama lisusu na ntango ya boyokani na bino. Ezali na ntina mingi kozwa toli ya mibeko to sango na NGO.
Makoki na yo
Na tango ya bokangami na yo, ozali na lotomo ya:
- Yeba bantina ya bokangami na yo, .
- Kozala na accès na agent ya CBSA, .
- Salelá mobongoli soki ozali kososola to koloba Anglais to Francais te, .
- Talá monganga, .
- Salelá lingomba na yo.
- Bozwa momonisi ya mibeko mpo na kozala momonisi na yo.
- Zwá lisalisi ya mibeko soki okokisi masɛngami. Bakoyebisa yo misala ya lisalisi ya mibeko oyo ezali mpo na yo. Okoki mpe kosɛnga moninga to mosangani ya ebongiseli moko azala momonisi na yo ofele.
- Bokutana na ambassade to consulat ya mboka na bino. Soki osengi ngunda, esengeli te osala yango sans ozua liboso toli ya mibeko. Okoki kosenga ete ba contakte Bilo ya Haut-Commissaire ya Nations Unies mpo na babombami (UNHCR) na Kanada.
- Kontakte ba NGO oyo bakoki kosalisa bino.
