Ndenge nini detention esalaka
Contrôle ya ba raisons ya bokangami
Okozala na ba boyokani ya botali mbala na mbala ya bokangami tango ozali na bokangami. Bosambisi na yo ya yambo ya botali bokangami na IRB-ID ekosalema ngonga 48 sima ya bokangami na yo to noki.
Na boyokani ya botali bokangami, momonisi ya CBSA alimboli bantina ya bokangami na yo mpe alakisaka bilembeteli. Akoki kotelemela mpo na bokangami na yo to kopesa toli ya kobimisa yo. Commissaire ya SI-CISR atalaka ezalela na yo pe azuaka mokano soki osengeli kotikala na bokangami to kobimisama na ba conditions to sans conditions.
Mpo na kozwa mokano oyo, commissaire azali kozwa na makanisi makambo oyo :
- Ba raisons ya bokangami
- Bolai ya bokangami
- Retard to mikakatano oyo euti na CBSA to na yo
- Ba alternatives possibles na esika ya bokangami
- Bolamu ya mwana nyonso oyo azali na nse ya mbula 18 oyo etali yango
- Ba conditions ya bokangami
Longola momonisi ya CBSA mpe mosangani ya IRB, bato mosusu bakoki kozala na boyokani na yo, bakisa mpe:
- Yo na bato ya libota na yo, soki mpe bakangami
- Mobongoli, soki ozali na mposa ya moko
- Ntoma (Representant legal) na yo ya mibeko, soki ozali na yango
- Ba temwe to batali na ntango ya boyokani, soki bapesi ndingisa
Mingi ya ba boyoki ya IRB ezali virtuelle. Kasi, likoki ezali ya kosɛnga ete boyokani yango esalema na miso.
Alternative na esika ya bokangami
Na boyokani ya botali lisusu bokangami, yo to Ntoma na yo ya mibeko bokoki kopesa likanisi ya lolenge mosusu ya bokangami (ATD). Nzela mosusu na esika ya bokangami ezali mwango ya kobimisama oyo ezali na makambo oyo osengeli kolanda. Talá mwa bandakisa ya ndenge mosusu oyo bakoki kosala na esika ya kokanga moto:
- pesa CBSA adresse ya esika ofandi
- kopesa lapolo mbala na mbala na CBSA
- respecter couvre-feu
- kofanda na moto moko ya sikisiki
- koboya komɛla masanga to bangi
Commissaire akozwa mokano soki ba conditions esengeli mpe ba conditions wana ekozala nini.
Soki ozali na esika ya kofanda te na libanda ya bokangami, luká koyeba bandako nini ya mwa ntango moke ekoki kozala mpo na yo. Ezali na bisika ya kofanda mpo na mwa ntango mpo na bato oyo bazali koluka kobombana na mboka mopaya na Canada. Okoki kozwa sango na ntina ya bisika oyo ya kobombama epai ya momonisi na yo ya mibeko, mopesi toli ya bofandisi to mosali ya lisanga, to ntango mosusu epai ya CBSA.
Soki bokangami na yo ekobi
Soki Commissaire ya IRB azwi mokano ya kobatela yo na bokangami, okozala na boyokani mosusu ya botali bokangami na kati ya mikolo 7. Na sima okozala na boyoki ya revue ya bokangami chaque 30 jours tiii tango bakobima.
Soki commissaire ya IRB-ID azwi mokano ete osengeli kotikala na bokangami, okozala na boyokani mosusu na mikolo sambo. Soki babombi yo na bokangami na tango ya bosambisi oyo ya mibale, okozala na ba audiences ata mikolo tuku misato nionso kobanda tango wana.
Soki babimisi yo
Soki commissaire ya IRB-ID apesi mitindo ya kobimisa yo, akoyebisa yo soki ezali na ba conditions oyo esengeli ko respecter. Ezali na ntina mingi kososola ba conditions wana. Esengeli olanda ba conditions oyo kino CBSA ekoyebisa yo ete ezali na ntina te, to kino IRB-ID to CBSA ekondima kobongola yango.
