Mibeko ya sika oyo ezali na bokonzi na Canada ekoki kosala likambo na boponomi na yo ya kotiya (kokitisa) demande ya ebombamelo, ata soki osila kotiya (kokitisa) demande na yo. Ba sango mosusu oyo ezali na site oyo (ezibeli enene) lisusu ezali na ngonga ya sika te. Tozali na misala ya kobongisa yango.
Tuna na molobeli na yo to na moto oyo azali kopesa lisalisi ya boyambi oyo ozali na boliki na ye. Tuna mpe na ntina

Mokambi pona Botambola ya kosalingwa mpo na boyoki ya Mobombami

Mokambi ya makanisi ya nzela ya boyoki ya babombami (RHP) ezali na motuya mpo na kosolola, kokambi, mpe lisungi babombami – na elobela na bango – oyo bazali kokanga boyoki na bango.

Sango ya sika mpe ya kobongisa ezali na esika www.myrefugeeclaim.ca, nzokande (na nsima) na elobela ya lingala te mais ya Anglais kaka.

Kosálela mokambi RHP mpo na

  • Kozwa elembo
  • Koyekola boyoki ya babombami

Landa na kozwa sango ya kitoko na elobela na yo.

Mokambi RHP ezali na motuya, na ntina ya solo, ndenge azali na elobela 12 mpo na babombami.

Lokásá ya 16 ti na 27 ya sekiso ya kosalingwa pona nzela ya boyoki ya babombami eza na sango ya kitoko mpe ya motuya.

Elobela ya yo olingi ezaleli te na etánga oyo ozali, nzokande soki ezali na etánga mosusu, osengeli te kozela na yango. Atansion, mibeko mingi ekoki te kokokisa na etánga na yo